Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SONG OF SOLOMON
1 2 3 4 5 6 7 8
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 7
Song LinVB 7:1  Bayembi :Zonga,zonga, mwasi wa Sulam, zonga, zonga, mpo totala yo. Mobali : Mpo nini bolingi kotala elenge mwasi wa Sulam ntango akoti o kati ya basi babini ?
Song LinVB 7:2  Makolo ma yo maleki kitoko mingi o mapapa maye, yo mwana wa bankumu ! Loketo la yo lobongi mpenza na zikida kitoko mpe na mayaka masalemi na moto ayebi mosala mwa ye.
Song LinVB 7:3  Montolu mwa yo mozali kopo kitoko, ekoki kozanga vino elengi te. Libumu lya yo lizali libondo lya loso, lizingami na fulele ya lisi ebele.
Song LinVB 7:4  Mabéle ma yo mabale lokola bana ba mboloko, lokola bana mapasa ma mbuli.
Song LinVB 7:5  Nkingo ya yo ezali lokola linongi lya mpembe ya nzoku, miso ma yo lokola bitima bya Esbon, penepene na ezibeli ya mboka Bat-Rabim, zolo lya yo lokola linongi lya Libano, liye litalani na Damasko.
Song LinVB 7:6  Motó mwa yo motelemi lokola ngomba Karmel, mpe nsuki ya yo ingengi lokola elamba ya longondo ; ata mokonzi monene akolula yango.
Song LinVB 7:7  Ozali kitoko solo, ozali nsuka ya basi, yo, bolingo wa ngai, okosepelisaka ngai !
Song LinVB 7:8  Nzoto ya yo ezali lokola nzete ya mbila, mpe mabéle ma yo lokola bizangi bya mbuma ya vino.
Song LinVB 7:9  Nakanisi : Tika nabuta nzete ya mbila mpe nakende kokamata mbuma ya yango. Mabéle ma yo mazalela ngai lokola bizangi bya mbuma ya vino, mpe mpema ya yo lokola nsolo ya lingolo ;
Song LinVB 7:10  edada ya yo lokola vino elengi… Mwasi : …ezali kokita o mongongo mwa bolingo wa ngai, lokola vino o monoko mwa bato balali mpongi.
Song LinVB 7:11  Nazali mobimba wa bolingo wa ngai, ye mpe alingi ngai na motema monso.
Song LinVB 7:12  Yaka, bolingo wa ngai, tokende o bilanga, na butu tolala o mboka.
Song LinVB 7:13  Na nta ntongo tokende kotala bilanga bya nzete ya vino, totala soko nzete ya vino isili kobima nkasa, soko nkasa ibandi kofungwama, soko fulele imononi o nzete ya ndimo. Bobele o esika ena nakolakisa yo bolingi bwa ngai.
Song LinVB 7:14  Mbuma ya bolingi isili kobimisa nsolo mpimbo. Mbuma elengi ebele izali penepene na ndako ya biso ; mbuma ya sika na mbuma ya kala, nabombeli yo yango, e bolingo wa ngai.