SONG OF SOLOMON
Chapter 1
| Song | LinVB | 1:3 | boleki nsolo ya malasi ma yo kitoko ; mobimba mwa yo bobele nsolo mpimbo. Yango wana bilenge basi balingi yo mingi. | |
| Song | LinVB | 1:4 | Tika nalanda yo mpe topota mbangu ! Mokonzi akotisi ngai o ndako ya ye, alobi : « Yo okozala ntina ya esengo ya biso babale. » Nasepela bolingi bwa yo boleki vino na elengi ! | |
| Song | LinVB | 1:5 | E bana basi ba Yeruzalem, nazali moindo kasi bonzenga, kitoko lokola biema bya Kedar, lokola bilamba bya motuya bya ndako ya Salomo. | |
| Song | LinVB | 1:6 | Boboya ngai te mpo nazali moindo, zambi moi makasi moindisi ngai. Bandeko ba ngai babali basiliki na ngai, batindi ngai nakende kokengele bilanga bya vino, kasi elanga ya ngai moko, nabateli yango malamu te ! | |
| Song | LinVB | 1:7 | Ngai nalingi bobele yo, bongo yebisa ngai : Esika nini okoleisaka mpata ya yo, esika nini okopemaka na midi ? Mpo nakende kowayawaya lokola ndumba te, penepene na bibwele bya baninga ba yo. | |
| Song | LinVB | 1:8 | Bayembi : E mwasi kitoko leka basi banso, soko oyebi te azali wapi, landa matambi ma bibwele mpe leisa ntaba ya yo penepene na biema bya bakengeli. | |
| Song | LinVB | 1:9 | Mobali : O miso ma ngai, yo mwasi wa ngai wa bolingo, ozali lokola farasa mwasi ya likalo lya Farao. | |
| Song | LinVB | 1:10 | Matama ma yo mazali kitoko o kati ya biloko bya matoi, se bongo nkingo ya yo ezingami na mayaka. | |
| Song | LinVB | 1:12 | Mwasi : Ntango mokonzi wa ngai azali o lopango la ye, malasi ma ngai makobimisa nsolo mpimbo. | |
| Song | LinVB | 1:15 | Mobali : Mwasi wa ngai wa bolingo, oleki kitoko ! Miso ma yo mazali lokola bibenga. | |
| Song | LinVB | 1:16 | Mwasi : Mobali wa ngai wa bolingo, oleki bonzenga ! Mbeto ya biso lokola matiti mabimi sika. | |