Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SONG OF SOLOMON
1 2 3 4 5 6 7 8
Prev Up Next
Chapter 1
Song LinVB 1:2  Mwasi : Otiela ngai mbebu ya yo o monoko ! Bolingi bwa yo boleki vino na elengi,
Song LinVB 1:3  boleki nsolo ya malasi ma yo kitoko ; mobimba mwa yo bobele nsolo mpimbo. Yango wana bilenge basi balingi yo mingi.
Song LinVB 1:4  Tika nalanda yo mpe topota mba­ngu ! Mokonzi akotisi ngai o ndako ya ye, alobi : « Yo okozala ntina ya esengo ya biso babale. » Nasepela bolingi bwa yo boleki vino na elengi !
Song LinVB 1:5  E bana basi ba Yeruzalem, nazali moindo kasi bonzenga, kitoko lokola biema bya Kedar, lokola bilamba bya motuya bya ndako ya Salomo.
Song LinVB 1:6  Boboya ngai te mpo nazali moindo, zambi moi makasi moindisi ngai. Bandeko ba ngai babali basiliki na ngai, batindi ngai nakende kokengele bi­langa bya vino, kasi elanga ya ngai moko, nabateli yango malamu te !
Song LinVB 1:7  Ngai nalingi bobele yo, bongo yebisa ngai : Esika nini okoleisaka mpata ya yo, esika nini okopemaka na midi ? Mpo nakende kowayawaya lokola ndumba te, penepene na bibwele bya baninga ba yo.
Song LinVB 1:8  Bayembi : E mwasi kitoko leka basi banso, soko oyebi te azali wapi, landa matambi ma bibwele mpe leisa ntaba ya yo penepene na biema bya bakengeli.
Song LinVB 1:9  Mobali : O miso ma ngai, yo mwasi wa ngai wa bolingo, ozali lokola farasa mwasi ya likalo lya Farao.
Song LinVB 1:10  Matama ma yo mazali kitoko o kati ya biloko bya matoi, se bongo nkingo ya yo ezingami na mayaka.
Song LinVB 1:11  Nakolukela yo biloko bya matoi bya wolo, bikembami na bikangeli bya palata.
Song LinVB 1:12  Mwasi : Ntango mokonzi wa ngai azali o lopango la ye, malasi ma ngai makobimisa nsolo mpimbo.
Song LinVB 1:13  Bolingo wa ngai azali libenga lya mira, likolala o kati ya mabéle ma ngai.
Song LinVB 1:14  Bolingo wa ngai azali etuka ya mbu­ma ya sipresi, ekoli o bilanga bya En-Gadi.
Song LinVB 1:15  Mobali : Mwasi wa ngai wa bolingo, oleki kitoko ! Miso ma yo mazali lokola bibe­nga.
Song LinVB 1:16  Mwasi : Mobali wa ngai wa boli­ngo, oleki bonzenga ! Mbeto ya biso lokola matiti mabimi sika.
Song LinVB 1:17  Makonzi ma ndako ya biso masalemi na mabaya ma sédere, bifelo byango na mabaya ma sipresi.