TITUS
Chapter 2
Titu | LinVB | 2:2 | Batatá bakómí babangé bálekisa ndelo té o makambo mánso, bázala na bwányá mpé na bokébi, bato ba boyambi bwa sôló, bálinga báníngá, bázala na moléndé. | |
Titu | LinVB | 2:3 | Sé bôngó bamamá bakómí babangé : bázala na ezalela ebongí na basántu : bátóngo báníngá té, bálángwa masanga té, báyéba kopésa bato malako malámu | |
Titu | LinVB | 2:5 | bámílakisa té, bázala na bopéto, báyéba kobongisa misálá mya ndáko, bázala bato ba bobóto, bátósa babáli ba bangó mpô ’te moto mǒkó átúka Liloba lya Nzámbe té. | |
Titu | LinVB | 2:8 | Téyá polélé mpé na bosémbo mpô ’te mongúná ákoka kotonga bísó na likambo lyǒ kó té ; kasi yě mǒkó áyóka nsóni. | |
Titu | LinVB | 2:9 | Baómbo bátósa bankóló ba bangó o makambo mánso, báluka kosepelisa bangó, bátía ntembe na maloba ma bangó té. | |
Titu | LinVB | 2:10 | Báyíba té, kasi émónono ’te bazalí na bosémbo o makambo mánso ; bakopésa bôngó ntángo ínso lokúmu na matéya ma Nzámbe, Mobíkisi wa bísó. | |
Titu | LinVB | 2:12 | Yangó elakísí bísó ’te tokokí kobóya Nzámbe té, kasi tóbóya mpósá ínso ya mabé. O mikolo miye tófánda na bokébi, na bosémbo mpé na bobángi Nzámbe, | |
Titu | LinVB | 2:13 | áwa tozalí kozila na elíkyá enéne Bomímónisi bwa nkémbo ya Nzámbe wa bísó monéne mpé Mobíkisi wa bísó Krístu Yézu. | |
Titu | LinVB | 2:14 | Yě moto amíkabí mpô ya bísó mpô ’te ábíkisa bísó o mabé mánso mpé ápétola bísó mpô tókóma bato ba yě mpenzá, bato bakoluka sé kosála malámu. | |