Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
TITUS
1 2 3
Prev Up Next
Chapter 1
Titu LinVB 1:1  Pólo, mosáleli wa Nzámbe, apóstolo wa Yézu Krístu mpô ya kokamba baye Nzá­mbe aponí o nzelá ya boyambi ; báya­mba mpé báyéba nzelá ya sôló ya kokúmisa Nzámbe.
Titu LinVB 1:2  Bôngó bátía mitéma na bomoi bwa lobíko, boye Nzá­mbe óyo azalí na lokutá té asílí alakélí út’o bileko bya kala.
Titu LinVB 1:3  Awa elaká ekokí, alakísí Liloba lya yě polélé. Yě, Nzámbe Mobíkisi wa bísó, atí­ndí ngáí násangela bato nsango eye.
Titu LinVB 1:4  óna Títo, mwána wa ngáí wa sôló ; na boyambi sé bǒ kó bwa bísó, ngrásya na bobóto bwa Nzámbe Tatá mpé bwa Krístu Yézu, Mobíkisi wa bísó !
Titu LinVB 1:5  Natíkákí yǒ o Kréta mpô ’te óbongisa mosálá moye motíkálákí : o engumbá yǒ kó yǒ kó ópono bakóló ba Eklézya, sé lokóla natí­ndákí yǒ.
Titu LinVB 1:6  Soko moko aponami ázala na ezalela mabé té, azala na mwasi sé mǒkó. Bána ba ye bázala na boyambi, baye bakopésaka esí­mbisi té na mobúlú tǒ na bobóyi botósi.
Titu LinVB 1:7  Mpô bǒ moyángeli wa mambí ma Nzámbe mokéngeli wa Eklézya akokí kozala na makambo mabé té : ázala na lofú­ndo té, na nkele té, álángwa masa­nga té, ázala moto wa bitumba té, ázala na mpósá ya mosolo té.
Titu LinVB 1:8  Kasi áyéba koyamba bampaya, álinga kosála sé malámu, ázala na makanisi malongóbání, moto wa bosémbo mpé wa losámbo, áyéba kokanga motéma ;
Titu LinVB 1:9  ápikama o matéya ma sôló lokóla balakísí yě, mpô ’te ákoka koléndisa bato na matéya ma sôló mpé kosúkisa baye bakotíaka ntembe.
Titu LinVB 1:10  Sôló, bato míngi bazalí na mayéle ma botomboki, bakosololaka masoló mazángí ntína mpé bakolukaka kokósa báníngá ; okokúta bangó míngi o káti ya bato bakátísí nzóto.
Titu LinVB 1:11  Ose­ngélí kokangisa bangó monoko : basílí kobébisa mabótá maíké na makambo ma bangó ma lokutá mpô ya kozwa mosolo na mayéle mabé.
Titu LinVB 1:12  Motéyi mǒkó, moto wa bangó, alobákí ’te « Bato ba Kréta bazalí sékô bato ba lokutá, nyama ibé, bato ba goigói, bakolingaka sé kolía. »
Titu LinVB 1:13  Sôló, moto ôná alobí malámu. Yangó wâná osengélí kopálela bangó makási mpô ’te bátíkala na eyamba ya sôló.
Titu LinVB 1:14  Bátía matói té na bilobáloba bya ba-Yúda mpé na bitíndá bya baye batíkí matéya ma sôló.
Titu LinVB 1:15  O míso ma bato ba motéma péto, bilóko bínso bizalí péto. Kasi o míso ma bato ba motéma mbindo mpé bazángí boyambi, bilóko bínso bizalí na mbindo, mpô mayéle na mitéma mya bangó mibébí.
Titu LinVB 1:16  Bakolobaka ’te bayébí Nzámbe, kasi maye bakosálaka malakísí ’te babóyí Yě : nsúka ya bato babé, bato­mboki, babongí na mosálá mǒkó mwa molongá té.