TITUS
Chapter 1
Titu | LinVB | 1:1 | Pólo, mosáleli wa Nzámbe, apóstolo wa Yézu Krístu mpô ya kokamba baye Nzámbe aponí o nzelá ya boyambi ; báyamba mpé báyéba nzelá ya sôló ya kokúmisa Nzámbe. | |
Titu | LinVB | 1:2 | Bôngó bátía mitéma na bomoi bwa lobíko, boye Nzámbe óyo azalí na lokutá té asílí alakélí út’o bileko bya kala. | |
Titu | LinVB | 1:3 | Awa elaká ekokí, alakísí Liloba lya yě polélé. Yě, Nzámbe Mobíkisi wa bísó, atíndí ngáí násangela bato nsango eye. | |
Titu | LinVB | 1:4 | óna Títo, mwána wa ngáí wa sôló ; na boyambi sé bǒ kó bwa bísó, ngrásya na bobóto bwa Nzámbe Tatá mpé bwa Krístu Yézu, Mobíkisi wa bísó ! | |
Titu | LinVB | 1:5 | Natíkákí yǒ o Kréta mpô ’te óbongisa mosálá moye motíkálákí : o engumbá yǒ kó yǒ kó ópono bakóló ba Eklézya, sé lokóla natíndákí yǒ. | |
Titu | LinVB | 1:6 | Soko moko aponami ázala na ezalela mabé té, azala na mwasi sé mǒkó. Bána ba ye bázala na boyambi, baye bakopésaka esímbisi té na mobúlú tǒ na bobóyi botósi. | |
Titu | LinVB | 1:7 | Mpô bǒ moyángeli wa mambí ma Nzámbe mokéngeli wa Eklézya akokí kozala na makambo mabé té : ázala na lofúndo té, na nkele té, álángwa masanga té, ázala moto wa bitumba té, ázala na mpósá ya mosolo té. | |
Titu | LinVB | 1:8 | Kasi áyéba koyamba bampaya, álinga kosála sé malámu, ázala na makanisi malongóbání, moto wa bosémbo mpé wa losámbo, áyéba kokanga motéma ; | |
Titu | LinVB | 1:9 | ápikama o matéya ma sôló lokóla balakísí yě, mpô ’te ákoka koléndisa bato na matéya ma sôló mpé kosúkisa baye bakotíaka ntembe. | |
Titu | LinVB | 1:10 | Sôló, bato míngi bazalí na mayéle ma botomboki, bakosololaka masoló mazángí ntína mpé bakolukaka kokósa báníngá ; okokúta bangó míngi o káti ya bato bakátísí nzóto. | |
Titu | LinVB | 1:11 | Osengélí kokangisa bangó monoko : basílí kobébisa mabótá maíké na makambo ma bangó ma lokutá mpô ya kozwa mosolo na mayéle mabé. | |
Titu | LinVB | 1:12 | Motéyi mǒkó, moto wa bangó, alobákí ’te « Bato ba Kréta bazalí sékô bato ba lokutá, nyama ibé, bato ba goigói, bakolingaka sé kolía. » | |
Titu | LinVB | 1:13 | Sôló, moto ôná alobí malámu. Yangó wâná osengélí kopálela bangó makási mpô ’te bátíkala na eyamba ya sôló. | |
Titu | LinVB | 1:14 | Bátía matói té na bilobáloba bya ba-Yúda mpé na bitíndá bya baye batíkí matéya ma sôló. | |
Titu | LinVB | 1:15 | O míso ma bato ba motéma péto, bilóko bínso bizalí péto. Kasi o míso ma bato ba motéma mbindo mpé bazángí boyambi, bilóko bínso bizalí na mbindo, mpô mayéle na mitéma mya bangó mibébí. | |