Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ZEPHANIAH
1 2 3
Prev Up Next
Chapter 1
Zeph LinVB 1:1  Maloba Yawe alobaki na Sofonia, mwana wa Kus, nkoko wa Gedalya, oyo azali mwana wa Ama­rya, mwana wa Kiskia, o nta­ngo Yozia, mwana wa Amon azalaki mokonzi wa Yuda.
Zeph LinVB 1:2  Yawe alobi boye : Solo, nakolongola biloko binso o mokili.
Zeph LinVB 1:3  Nakolongola bato na nyama, nakolongola ndeke ya likolo na mbisi ya mai, nakolongola bisimbisi bikweisaki bato, nakolongola bato, basila o mokili. Maloba ma Yawe.
Zeph LinVB 1:4  Nakotombola loboko mpo ya kosala Yuda mabe na mpe bato banso ba Yeruzalem. Nakolongola o esika ena maka­mbo ma Baal, basali na banganga nzambe ba ye,
Zeph LinVB 1:5  baye bakokumbamelaka o mito­ndo mya ndako minzoto mya likolo, baye bakokumbamelaka Yawe mpe bakolayaka ndai na nkombo ya Milkom,
Zeph LinVB 1:6  baye bakopesaka Yawe mokongo, bakolukaka mpe bakotunaka ye te.
Zeph LinVB 1:7  Banso bazala nye o boso bwa Mokonzi Yawe, mpo mokolo mwa Yawe mokomi penepene ! Yawe alengeli limpati lisantu na moboma, asantisi baye babyangemi.
Zeph LinVB 1:8  Mokolo Yawe akolamba moboma mwa ye, akopesa bayangeli mpe bankumu etumbu, na baye banso bakolataka bilamba bya bikolo bisusu.
Zeph LinVB 1:9  Mokolo mona nakotumbola baye banso bakoyingelaka o te­mpelo ya nzambe mosusu, mpe bakotondisaka ndako ya mokonzi wa bango na mosolo bazwi na bitumba mpe na bokosi.
Zeph LinVB 1:10  Yawe alobi boye : Mokolo mona bokimeli bokoyokana o ‘Ezibeli ya Mbisi’, boleli o ‘Mboka ya Sika’, mpe lokito lonene o ngomba.
Zeph LinVB 1:11  Bino bato ba Esika ya Bipolu, bolela, mpo bakangi zando ya Kanana, bato banso bakotangaka mosolo bakufi.
Zeph LinVB 1:12  Mokolo mona nakosimba mwi­nda o maboko mpo ’te natala Yeruzalem malamu o bisika bya molili. Nakotumbola bato bazali lokola vino ebebi, baye bamilobeli o mitema : « Yawe akoki kosala malamu te, mabe mpe te. »
Zeph LinVB 1:13  Mokolo mona bakobotolo bango nkita mpe bakobuka ndako ya bango ; bakotonga ndako, kasi bakofanda te, bakolona nzete ya vino, kasi bakomele vino te.
Zeph LinVB 1:14  Mokolo mwa Yawe mobelemi, mokolo monene, mozali koya mbangu mpenza ! O mokolo mwa Yawe bato bakolela makasi, ata elombe akobelela basalisi ba ye.
Zeph LinVB 1:15  Mokolo mona, mokolo mwa nkanda ! Mokolo mwa malozi mpe mwa bobangi, mokolo mwa mpasi mpe mwa mawa, mokolo mwa molili mpe mwa butu boindo tu, mokolo likolo likoinda na ma­mpata manene,
Zeph LinVB 1:16  mokolo bakobete ebeleli ya bitu­mba na mondule, mpo babundisa bato ba bibombamelo mpe ba manongi.
Zeph LinVB 1:17  Nakoyokisa bato kwokoso, bakotambola lokola bato ba lola­nda, zambi basali masumu o miso ma Yawe. Makila ma bango makosopama lo­kola mai, misopo mya bango mikobwakema lokola bipoli.
Zeph LinVB 1:18  Palata na wolo ya bango bikoki kobikisa bango te, mokolo mwa nkanda ya Yawe. Móto mwa zuwa lya ye mokosilisa mokili mobimba ; akobebisa mpe akoboma bato banso o mokili.