ESTHER
Chapter 1
Esth | LinVB | 1:1 | A O mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Asuero monene, o sanza Nisan, o mokolo mwa yambo, Mardokai aloti ndoto. Ye azalaki mwana wa Yair, nkoko wa Simei, mwana wa Kis, moto wa libota lya Benyamin. B Mardokai azalaki mo-Yuda mpe afandi o engumba Suza ; azalaki moto wa lokumu mpe asalelaki mokonzi monene wa ekolo. C Azalaki moko wa bato baye Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, akangaki o Yeruzalem mpe akendeki na bango o boombo ; Yekonia, mokonzi wa Yudea, azalaki mpe na bango. D Mardokai aloti boye : Bato bagangi mpe basali makeléle ; nkake ebeti mpe mokili moningani ; nse mobimba ekomi mobulu. E Ebimi wana bibuki bibale bya nyama, bitamboli liboso, bimilengeli mpo ya kobunda etumba. F Awa bizalaki koganga makasi, bikolo binso bibandi komilengele na etumba mpo ’te bato ba bango babundisa ekolo ya bato ba bosembo. G Ekomi mokolo mwa molili mpe mwa butu boindo : Mpasi na nsomo, minyoko na mobulu ikweli nse mobimba. H Bato banso ba bosembo babulungani, bayoki nsomo mpo ya mpasi izali koya. Bazalaki kozila liwa, I mpe kobelela Nzambe. Nzokande, o ntango bazalaki kobelela bongo, ebimi wana mwa moluka, mokomi noki ebale enene na mai makotambolaka makasi. J Mwinda moko mobimi wana, mouti o mwese. Bato ba motema bobola bazwi lokumu, mpe balei bato banene. K Mardokai amoni ndoto eye mpe maye Nzambe akani kosala. Ntango alamuki, amanyoli makambo mana o motema, mpe tee butu ameki koyeba ntina ya mango. L Na nsima Mardokai akei kopema o ndako ya mokonzi elongo na Gabata mpe na Tara, ba-eniki babale bazalaki bakengeli ba ndako ya mokonzi. M Ayoki lisolo lya bango mpe maye bakani kosala. Awa ayoki ’te balingi koboma mokonzi Asuero, akei koyebisa ye. NMokonzi atuni ba-eniki baye babale ; mpe awa bandimi, akangisi bango o boloko. O Mokonzi atindi ’te bakoma likambo lyango o buku ya Bikela bya mokonzi. Mardokai mpe akomi yango o monkanda mwa ye. P Na nsima mokonzi atindi ’te Mardokai atikala o mosala o ndako ya mokonzi. Akabeli ye mabonza mpo ya malamu maye asalaki. Q Ezalaki wana mpe Aman, mwana wa Amdata, moto wa Agag, alingamaki na mokonzi. Kasi mpo ya likambo lya ba-eniki babale, akaneli Mardokai na bato ba ekolo ya ye. O ntango Asuero azalaki mokonzi, azalaki koyangela mikili monkama na ntuku ibale na nsa- mbo, banda ekolo India tee Etiópia. | |
Esth | LinVB | 1:3 | o mobu mwa misato mwa bokonzi bwa ye, alambi limpati linene : abengi baninga ba ye ba motema, bakonzi ba bikolo bisusu, bankumu ba Persi mpe ba Medi, mpe bayangeli ba mikili myango. | |
Esth | LinVB | 1:4 | Mikolo monkama na ntuku mwambe mobimba, alingi kolakisa bango bomengo bwa ye, mpe ndenge azalaki kosepela na lipombo o bokonzi bwa ye. | |
Esth | LinVB | 1:5 | Nsima ya mikolo mina, mokonzi alambeli bato banso ba Suza limpati ; abengi ná bato ba nkita ná babola ; limpati o lopango la mokonzi liumeli mikolo nsambo. | |
Esth | LinVB | 1:6 | Bakembisi lopango mobimba na bilamba bya malekani kitoko mpe bya kiusa ya longondo ; bilamba bina bikangemi na nsinga ya longondo mpe ya motane. Bilamba bikangemi na mpete ya palata, bita-ndani o makonzi ma marbre mpembe. O mabanga ma nse manso mbeto ya wolo mpe ya palata izalaki ; mabanga mana masalemi na mabanga ma motuya monene, na marbre mpembe, na nakre mpe na mabanga make ndenge na ndenge. | |
Esth | LinVB | 1:7 | Mpo ya komele ezalaki wana kopo ya wolo ndenge na ndenge. Vino mpe ezalaki ebele mpenza, lokola mokonzi akopesaka. | |
Esth | LinVB | 1:8 | Bamelisi moto moko na makasi te : mokonzi atindi bakapita ba balambi ’te basalela moto moko moko lokola ye moko alingi. | |
Esth | LinVB | 1:9 | Mokonzi mwasi Vasti, mwana wa mokonzi, alambeli mpe basi limpati linene o ndako ya mokonzi Asuero. | |
Esth | LinVB | 1:10 | O mokolo mwa nsambo mokonzi akomi kosepela mpo ya vino ameli ; atindi Mekuman, Bizeta, Arbona, Bigta, Abagta, Zetar na Karkas, ba-eniki nsambo ba lopango la mokonzi Asuero, | |
Esth | LinVB | 1:11 | ’te babyanga mokonzi mwasi Vasti, alata enkoti ya bokonzi ; bongo bato banso na mpe bayangeli ba ekolo ya ye bamono kitoko ya ye. Solo, azalaki mwasi bonzenga. | |
Esth | LinVB | 1:12 | Kasi mokonzi mwasi Vasti aboyi koya elongo na ba-eniki. Bongo mokonzi asiliki mpe ayoki nkanda mpenza. | |
Esth | LinVB | 1:13 | Atuni balaki ba bwanya, baye bayebi mibeko, mpo bameseni kotuna baye bayebi mibeko mpe bazuzi makambo manene ma mokonzi. | |
Esth | LinVB | 1:14 | Bongo abengi Karsena, Setar, Admata, Tarsis, Meres, Marsena na Memukan, bankumu ba bikolo bya Persi na Medi, baye bakoki kokutana na mokonzi, mpe bazalaki o boso bwa bato banso o bokonzi. | |
Esth | LinVB | 1:15 | Atuni bango : « Engebene na mibeko, tosala nini na mokonzi mwasi Vasti, awa aboyi kotosa etinda ya mokonzi, eye ba-eniki bayebisaki ye. » | |
Esth | LinVB | 1:16 | Na nsima Memukan alobi o miso ma mokonzi mpe ma bankumu ba ye : « Mokonzi mwasi Vasti asali bobele mokonzi mabe te, kasi asali mpe mabe na bayangeli mpe na bato banso bafandi o ekolo ya mokonzi Asuero. | |
Esth | LinVB | 1:17 | Likambo mokonzi mwasi asalaki likoyebana na basi banso ; baye bakoki kobanda kokinola babali ba bango o kati ya motema. Bakoki komilobela : ‘Mokonzi Asuero, atindi ’te bayela ye mokonzi mwasi Vasti, kasi aboyaki koya !’ | |
Esth | LinVB | 1:18 | Lelomei basi ba bayangeli ba Persi mpe ba Medi ndebayebisi bayangeli banso ba mokonzi likambo mokonzi mwasi asali. Bokinoli bwa bango bokoyokisa babali nkanda. | |
Esth | LinVB | 1:19 | Soko mokonzi alingi, malamu abimisa mobeko, bakoma mwango o monkanda mwa mibeko mya Persi na Medi. Bakata likambo se bongo. Mokonzi mwasi akoma lisusu penepene na mokonzi te. Mokonzi apesa mwasi mosusu nkombo ya lokumu, oyo aleki ye na bolamu. | |
Esth | LinVB | 1:20 | Ntango bakosakola mobeko moye mwa mokonzi o ekolo mobimba, basi banso, ná bato banene ná bato bake, bakomemya babali ba bango. » | |
Esth | LinVB | 1:21 | Maloba mana masepelisi mokonzi na bayangeli. Yango wana mokonzi asali lokola Mukaios alobi. | |