I CORINTHIANS
Chapter 8
I Co | LinVB | 8:1 | Mpô etálí nyama babonzélí bikeko : bísó bánso toyébí níni tosengélí kosála. Kasi mayéle makokómisaka moto na loléndo, bolingi bokotongaka ndako. | |
I Co | LinVB | 8:4 | Bôngó, mpô etálí boléi nyama iye babonzélí bikeko, toyébí ’te ekeko ezalí sé elóko mpámba o nsé mobimba. Toyébí mpé ’te Nzámbe azalí sé mǒkó, Nzámbe mosúsu azalí té, | |
I Co | LinVB | 8:5 | atâ mpé baye bakotángaka banzámbe o likoló tǒ o nsé, bakotángaka bôngó banzámbe na bakonzi míngi. | |
I Co | LinVB | 8:6 | Kasi bísó tozalí na Nzámbe sé mǒkó, Tatá, óyo akelí bínso mpé apésí bísó bomoi. Tozalí mpé na Mokonzi sé mǒkó, Yézu Krístu : bínso bikelámí mpô ya yě, bísó mpé tozalí na bomoi mpô ya yě. | |
I Co | LinVB | 8:7 | Kasi bato bánso bazalí na mayéle té. Basúsu, baye bazalákí kokúmisa bikeko mwâ mikolo milekí, mpô ya motéma motaú mwa bangó bakokí kokanisa ’te bakokóma na mbindo sókó bakolía nyama eye babonzélákí bikeko. | |
I Co | LinVB | 8:8 | Nzókandé bilóko bya kolía bikokí kokómisa bísó penepene na Nzámbe té : sókó toléí byangó té, tokobúngisa elóko té ; mpé sókó toléí byangó, tokozwa mpé elóko té. | |
I Co | LinVB | 8:9 | Kasi, áwa bokokí kosála lokóla bínó mǒkó bolingí, bókéba ’te bópésa bato ba motéma motaú esímbisi té. | |
I Co | LinVB | 8:10 | Sôló, sókó moto wa motéma motaú amóní yǒ moto wa mayéle ozalí kolía o témpelo ya bikeko, mbele okondimisa yě ’te akokí kolía nyama babonzélákí bikeko ? | |
I Co | LinVB | 8:11 | Bôngó, áwa olandí mayéle ma yǒ, okokwêisa moto wa motéma motaú ; Krístu akúfákí mpé mpô ya ndeko óyo ! | |
I Co | LinVB | 8:12 | Awa osálí bandeko ba yǒ mabé mpé oyókísí bato ba motéma motaú mpási o motéma, osálí Krístu mpé mabé. | |