I CORINTHIANS
Chapter 11
I Co | LinVB | 11:2 | Nakúmísí bínó, mpô o makambo mánso bokokanisaka ngáí mpé bokotósaka mibéko natéyákí bínó. | |
I Co | LinVB | 11:3 | Nzókandé nalingí ’te bóyéba : Krístu azalí mokonzi wa bato bánso ; mobáli azalí mokonzi wa mwásí, mpé Nzámbe azalí mokonzi wa Krístu. | |
I Co | LinVB | 11:4 | Mobáli nyónso azipí motó ntángo azalí kosámbela tǒ kosakola Liloba lya Nzámbe, ayókísí Krístu, Mokonzi mwa yě, nsóni. | |
I Co | LinVB | 11:5 | Mwásí nyónso azipí motó té ntángo azalí kosámbela tǒ kosakola Liloba lya Nzámbe, ayókísí Krístu, mokonzi mwa yě, mwangó ndé mobáli wa yě, nsóni ; azalí sé lokóla bakókólí yě motó. | |
I Co | LinVB | 11:6 | Sókó mwásí alátí litambála té, ákátisa nsúki ! Kasi sókó mwásí ayókí nsóni mpô bakátí yě nsúki tǒ bakókólí yě motó, áláta litambála. | |
I Co | LinVB | 11:7 | Mobáli asengélí koláta enkoti o motó té, zambí azalí elílí eye ekolakisaka nkémbo ya Nzámbe ; kasi mwásí azalí elílí ya nkémbo ya mobáli. | |
I Co | LinVB | 11:8 | Ya sôló, mobáli moto akelámí na nzóto ya mwásí té, kasi mwásí akelámí na nzóto ya mobáli ; | |
I Co | LinVB | 11:11 | O míso ma Nzámbe ezalí boye : mwásí azalí elóko té sókó mobáli azalí té, mobáli azalí elóko té sókó mwásí azalí té : | |
I Co | LinVB | 11:12 | lokóla mwásí akelámí na nzóto ya mobáli, mobáli akobótamaka na mwásí, mpé bánso bábalé baútí na Nzámbe. | |
I Co | LinVB | 11:14 | Motíndo Nzámbe akelí bato molakísí té ’te mobáli azalí na nsúki míngi azalí komíyókisa nsóni ? | |
I Co | LinVB | 11:15 | Kasi sókó mwásí azalí na nsúki míngi, ekopésaka yě lokúmu, zambí azwí yangó mpô ’te íkémbisa yě. | |
I Co | LinVB | 11:16 | Sókó moto alingí kotía ntembe na likambo liye, áyéba ’te tomeséní bôngó té, bato ba Eklézya ya Nzámbe mpé té. | |
I Co | LinVB | 11:17 | Na lilako nalingí kopésa bínó, nakokí kokúmisa bínó té, zambí na loléngé bokosanganaka bokozwa malámu té, bokozwa sé mabé. | |
I Co | LinVB | 11:18 | Ya libosó : Nayókí ’te ntángo bokosanganaka likita, bokokabwanaka, mpé nakanísí ’te ezali sé bôngó. | |
I Co | LinVB | 11:19 | Sôló, makambo ma bokabwani makokí kozánga o ntéi ya bínó té, mpô ’te émónono sókó banáni o ntéi ya bínó bazalí bakrístu ba sôló. | |
I Co | LinVB | 11:21 | mpámba té, moto na moto akamátí biléi bya yě mǒkó, bôngó basúsu bazalí koyóka nzala, basúsu bakolángwaka. | |
I Co | LinVB | 11:22 | Bozángí ndé ndáko esíká bokokí kolía mpé komele ? Tǒ bozalí kokínola Eklézya ya Nzámbe, mpé bolingí koyókisa baye bazangi nsóni ? Náloba na bínó níni ? Nákúmisa bínó ? Na likambo liye nakokí kokúmisa bínó té. | |
I Co | LinVB | 11:23 | Maye natéyákí bínó, nazwákí mangó epái ya Mokonzi : Mokonzi Yézu, o butú bakabí yě, akamátí límpa, | |
I Co | LinVB | 11:24 | atóndí Nzámbe, abúkí lyangó mpé alobí : « Eye ezalí Nzóto ya ngáí nakabi mpô ya bínó. Bósálaka sé bôngó mpô ya kokanisa ngáí. » | |
I Co | LinVB | 11:25 | Sé bôngó, nsima ya limpáti, akamátí nkéni, alobí : « Nkéni eye ezalí ya Bondeko bwa Sika na Makilá ma ngáí ; mbala ínso bokomele yangó, bósálaka bôngó mpô ya kokanisa ngáí. » | |
I Co | LinVB | 11:26 | Ya sôló, mbala ínso bokolía límpa liye mpé bokomele nkéni eye, bokosakola liwá lya Mokonzi, kín’o mokolo akoyâ. | |
I Co | LinVB | 11:27 | Yangó wâná, sókó moto aléí límpa liye mpé amelí nkéni ya Mokonzi na motéma molongóbání té, akozwa likambo mpô ya Nzóto na Makilá ma Mokonzi. | |
I Co | LinVB | 11:28 | Bôngó moto na moto asengélí komítúna libosó ’te álía límpa liye mpé ámele nkéni eye, | |
I Co | LinVB | 11:29 | zambí moto aléí mpé amelí, aléí mpé amelí etúmbu ya yě mǒkó ; mpámba té, aléí Nzóto ya Mokonzi na limemyá té. | |
I Co | LinVB | 11:30 | Yangó wâná o ntéi ya bínó bato baíké bazalí na bokono tǒ nzóto kólóngónú té, basúsu mpé bawéí. | |
I Co | LinVB | 11:32 | Kasi áwa Mokonzi asámbísí mpé atúmbólí bísó, asálí bôngó mpô tókita o likambo elongó na bato ba nsé té. | |