I CORINTHIANS
Chapter 1
I Co | LinVB | 1:1 | Pólo, aponami apóstolo wa Kristu Yezu na bolingi bwa Nzambe, elongó na ndeko wa bísó Sosténes, | |
I Co | LinVB | 1:2 | ôná Eklézya ya Nzambe ezali na Korínti losáko. bínó bato ba yě ba lisangá na Krístu ; bobyángémí mpô ’te bózala basántu, elongó na bato bánso bakobóndelaka bipái bínso nkómbó ya Yézu Krístu, Mokonzi wa bangó mpé Mokonzi wa bísó : | |
I Co | LinVB | 1:3 | ngrásya na bino mpé bobóto bowuti na Nzámbe Tatá wa bísó mpé na Mokonzi Yézu Krístu ! | |
I Co | LinVB | 1:7 | Yangó wâná bozángí likabo lyǒ kó té, bínó bato bozalí kozila Bomímónisi bwa Mokonzi wa bísó Yézu Krístu. | |
I Co | LinVB | 1:8 | Yě moto mpé akoléndisa bínó téé nsúka, bózwama na mabé mǒkó té o Mokolo Mokonzi wa bísó Yézu Krístu akoyâ. | |
I Co | LinVB | 1:9 | Nzámbe akokokisaka mánso akání kosála, yě moto abyángí bínó bózala lisangá na Mwána wa yě, Mokonzi wa bísó Yézu Krístu. | |
I Co | LinVB | 1:10 | Bandeko, nabóndélí bínó o nkómbó ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu bánso bóloba monoko sé mǒkó, bókabwana té, o makambo mánso bózala motéma mǒkó mpé likanisi liokó. | |
I Co | LinVB | 1:12 | Nalingí koloba ’te moto na moto akómí koloba na loléngé la yě : « Ngáí nazalí moto wa Pólo » tǒ « Ngáí moto wa Apóllos », tǒ « Ngáí moto wa Pétro », tǒ « Ngáí moto wa Krístu ». | |
I Co | LinVB | 1:13 | Krístu akabwání ndé ndámbo ndámbo ? Ndé Pólo akúfákí o kurúse mpô ya bínó ? Bokúlákí ndé batísimo o nkómbó ya Pólo ? | |
I Co | LinVB | 1:16 | Sôló, nabátísákí mpé bato ba libótá lya Stéfanas, kasi nayébí té sókó nabátísákí naíno moto mosúsu. | |
I Co | LinVB | 1:17 | Zambi Krístu atíndí ngáí té mpô ya kobátisa bato, kasi mpô ya kosangela Nsango Elámu : kasi sókó nasangélí yangó na bwányá bwa bato, kurúse ya Krístu ekómí kozánga ntína. | |
I Co | LinVB | 1:18 | Mpo na bazalí kobúngama nsango ya kurúse ezalí likambo lya bozóba, kasi mpo na bísó bato tokobíka ezalí ngúyá ya Nzámbe. | |
I Co | LinVB | 1:19 | Ekomámí mpé bôngó o Minkandá : Nakosúkisa bwányá bwa bato ba bwányá, mpé nakoboma mayéle ma bato ba mayéle. | |
I Co | LinVB | 1:20 | Moto wa bwányá akómí wápi ? Wápi moto ayékólá míngi ? Wápi moto ayébí makambo mánso ma mokili moye ? Nzámbe akómísí bwányá bwa bato bozóba té ? | |
I Co | LinVB | 1:21 | na bwányá bwa bangó bato bayébákí Nzámbe o bikelá bya yě bya bwányá té, yangó wâná Nzámbe akání kobíkisa baye bakoyamba na nsango eye emónóní lokóla bozóba o míso ma bato. | |
I Co | LinVB | 1:23 | nzókandé bísó tozalí kosakola Krístu óyo awéí o kurúse : o míso ma ba-Yúda ezalí esímbisi, o míso ma bapagáno ezalí likambo lya bozóba. | |
I Co | LinVB | 1:24 | Kasi bato baye Nzámbe abyángí, ba-Yúda ná ba-Gréki, azali Krístu, ngúyá mpé bwányá bwa Nzámbe. | |
I Co | LinVB | 1:25 | Sôló, maye mamónóní lokóla mambí ma bozóba bwa Nzámbe, malekí na bwányá maye ma mayéle ma bato ; maye mamónóní lokóla mambí ma botaú bwa Nzámbe, malekí na ngúyá maye ma bokási bwa bato. | |
I Co | LinVB | 1:26 | táláni bóníbóní Nzámbe abyángí bínó : baye bazalí na bwányá o míso ma báníngá bazalí míngi té o káti ya bínó ; baye bazalí na bokonzi tǒ na lokúmu bazalí mpé míngi té. | |
I Co | LinVB | 1:27 | Kasi Nzámbe aponí mambí ma bozóba ma mokili mpô ya koyókisa bato ba bwányá nsóni ; mpé aponí mambí mazángí bokási mpô ya koyókisa bato bazalí makási nsóni. | |
I Co | LinVB | 1:28 | Nzámbe aponí baye babótámí bato baké mpé bazángí lokúmu o míso ma bato basúsu ; bato baye bazalí lokóla babótámá té, Nzámbe aponí bangó mpô ya kobótolo bomoi bwa baye bazalí o mokili, | |
I Co | LinVB | 1:30 | Mpô ya Ye Krístu Yézu : yě azalí bwányá bwa bísó boútí na Nzámbe, tokomi bosémbo, bosántu mpé libíkí. | |