Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I TIMOTHY
1 2 3 4 5 6
Prev Up Next
Chapter 1
I Ti LinVB 1:1  Pólo, apóstolo wa Krístu Yézu na ndingisa ya Nzámbe, Mobíkisi wa bísó mpé ya Yézu Krístu, elíkyá ya bísó,
I Ti LinVB 1:2  óna Timotéo, mwána óyo nabótí sôló o boyambi, ngrásya, ngolu na bobóto biúti na Nzambe Tata mpé na Kristu Yezu Mokonzi wa biso.
I Ti LinVB 1:3  nabóndélákí yǒ ótíkala o Eféze lokola nazalákí kokende o Masedónia, nasalaki bôngo mpô ’te ópekisa bato basúsu batéya matéya masúsu.
I Ti LinVB 1:4  Kokangana na masapo mpé kotánga milongó mya nkómbó ya bankó­ko nsúka té. Mâná mánso makobimisaka sé ntembe, mpé maza­lí na ntína yǒ kó té mpô ya kokokisa mosá­lá mwa Nzámbe : tokoyéba mwa­ngó bobélé mpô ya boyambi.
I Ti LinVB 1:5  Ntína ya motíndo moye ezalí sé bolingi boye bokoúta na motéma péto, na makanisi ma bosémbo mpé na boyambi bwa sôló.
I Ti LinVB 1:6  Bato basúsu babúngí nzelá eye mpé bakomípésaka na maloba mazángí ntína.
I Ti LinVB 1:7  Bakomílakisaka lokóla batéyi ba Mobéko, nzókandé bayébí té níni bazalí koloba ; mpé maye bazalí kosakola lokóla bayébí mangó sôló­sôló, batongólí ntína ya mangó té.
I Ti LinVB 1:8  Toyébí ’te Mobéko mozalí ma­lámu sôló, sókó totálí mwangó bǒ ebongí.
I Ti LinVB 1:9  Tóyéba malámu ’te babimísí Mobéko mpô ya bato balámu té, kasi mpô ya bato bakotósaka Nzámbe té, batomboki na basúmuki, baye bakokínolaka mpé bakotiolaka bilóko bisántu bínso, baye bakobomaka tatá tǒ mamá tǒ mpé bato basúsu,
I Ti LinVB 1:10  baye bakosálaka mpô bosóni na mwásí ndúmbá tǒ na móníngá mobáli, baye bakotékeke bato bǒ baómbo, baye bakokósaka, baye bakolayaka ndaí ya lokutá, mpé baye bánso bakosálaka makambo makokí na matéya ma sôló té.
I Ti LinVB 1:11  Matéya maye maútí na Nsango Elámu té, eye Nzámbe ntá nkémbo mpé ntá esengo atíndí ngáí násangela.
I Ti LinVB 1:12  Natóndí Krístu Yézu, Mokonzi wa bísó, óyo apésí ngáí makási, mpô atíí motéma na ngáí, áwa aponí ngáí o mosálá mwa yě.
I Ti LinVB 1:13  ngáí moto nazalaki libosó nazalákí kotúka, konyókolo mpé kofínga yě, kasi ayókélí ngáí ngolu, mpô nazángákí boyambi mpé nayébákí té níni nazalákí kosála.
I Ti LinVB 1:14  Mo­konzi wa bísó akabélí ngáí ngrásya míngi, apésí ngáí boyambi mpé bolingi, boye bozalí o Krístu Yézu.
I Ti LinVB 1:15  Tokokí kotía ntembe té na liloba liye lya sôló : Krístu Yézu ayákí o nsé kobíkisa basúmuki ; ngáí moto wa yambo o káti ya bangó.
I Ti LinVB 1:16  Yangó wâná bayókélí ngáí ngolu : Yézu Krístu alingákí kolakisa ngáí, moto wa libosó, ngolu ya yě enéne ; názala bôngó ndakisa o míso ma baye bakoyamba yě mpé bakozwa bomoi bwa lobíko.
I Ti LinVB 1:17  Lokúmu mpé nkémbo na Mokonzi wa bileko, Nzámbe sé mǒkó, óyo akowá té mpé akomónono na míso té, lokumu mpé nkémbo o bileko na bileko ! Amen.
I Ti LinVB 1:18  Timotéo, mwána wa ngáí, napésí yǒ mobéko moye, engébéné na maloba baproféta balobáká kala mpô ya yǒ. Maloba maye máléndisa yǒ mpô ’te óbunda etumba na mpíkó,
I Ti LinVB 1:19  na boyambi bwa sôló mpé na motéma sémba. Basúsu babóyí maloba mâná, yangó wâná babú­ngísí boyambi,
I Ti LinVB 1:20  lokóla Imenéo na Alesándro. Nakabí bangó o mabóko ma Sátana mpô ’te bátíka kotúka Nzámbe.