Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CORINTHIANS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13
Prev Up Next
Chapter 10
II C LinVB 10:1  Ngáí mǒkó Pólo nabóndélí bínó mpô ya bobóto mpé bosáwa bwa Krístu, oyó bokolobaka ’te ntángo azalí epái ya bísó afándí nyê, kasi ntángo azalí mosíká na bísó akómí na mpíkó.
II C LinVB 10:2  Nabó­ndélí bínó : bótínda ngáí té ’te nálakisa mpíkó ntángo nakoyâ epái ya bínó ; nayébí malámu ’te nakobánga té koloba polélé na bato bakanísí ’te o mosálá mwa ngáí nakolandaka sé mayéle ma bato ba nsé.
II C LinVB 10:3  Atâ tozalí sé bato bataú, tokobundaka etumba na ngúyá ya bato ba nsé té.
II C LinVB 10:4  Bibu­ndeli bya bísó bizalí bibundeli bya bato ba nsé té, kasi bizalí na ngúyá ya Nzámbe, mpé bikokí kolónga bokási bwa bangúná ; tokosúkisaka maloba ma mayéle ma bato
II C LinVB 10:5  mpé loléndo la baye balingí koyéba Nzámbe té, mpé tokotíndaka bato bánso bábóngola makanisi ma bangó, bátósa Krístu.
II C LinVB 10:6  Baye bánso babóyí kotósa tolingí kopésa bangó etúmbu, téé mokolo tokomóno ’te bínó bokotósa nyé.
II C LinVB 10:7  Maye nakoloba mazalí polélé mpénzá. Sókó moto akanísí ’te azalí moto wa Krístu, áyéba ’te bísó mpé tozalí bato ba Krístu, sé lokóla yě.
II C LinVB 10:8  Nakoyóka nsóni té, atâ namíkúmísí mwâ míngi na likokí liye Mokonzi apésí bísó sé mpô ya koléndisa boyambi bwa bínó, mpô ya koboma bwangó té.
II C LinVB 10:9  Nalingí té ’te námónono lokóla moto amekí kobángisa bínó na minkandá mya yě.
II C LinVB 10:10  Bakolobaka : « Akokomaka minkandá na maloba makási makási, kasi ntángo ayéí epái ya bísó, azángí makási mpé ayébí lisúsu koloba malámu té. »
II C LinVB 10:11  Bato bakolobaka bôngó, bákanisa naíno malámu : Ntángo tokozala epái ya bínó tokosála sé lokóla tokomélákí bínó o minkandá mya bísó ntángo tozalákí mosíká na bínó.
II C LinVB 10:12  Sôló, bato basúsu bakomíkúmisaka ’te bazalí bato banéne ; bísó tolingí kokokana tǒ komekana na bangó té. Awa bazalí komítómbola mpé komíkúmisa na ezalela ya bangó mǒkó, bazángí mayéle.
II C LinVB 10:13  Kasi bísó, esíká tozalí komíkúmisa, tolingí kolekisa ndelo té. Tozalí kotála bobélé ndelo eye Nzámbe atíélí bísó : yě moto alingísí bísó tókóma téé epái ya bínó.
II C LinVB 10:14  Zambi sókó toyákí epái ya bínó té, mbele tomíkúmísákí mpámba. Kasi, ya sôló, tozalákí bat­o b­a libósó baye bayélí bínó Nsango Elámu ya Krístu.
II C LinVB 10:15  Ya­ngó wâná, tólekisa ndelo té na bomíkúmisi : tómíkúmisa na mosálá mwa bato basúsu té. Kasi tozalí na elíkyá ’te boyambi bokolénda o mitéma mya bínó, bôngó bósálisa bísó mpô tókóla naíno engébéné na ndelo Nzámbe atíélí bísó.
II C LinVB 10:16  Bôngó na nsima tókoka kosangela Nsango Elámu o mikili misúsu leká mokili mwa bínó. Tolingí mpé komíkúmisa té na mosálá moye báníngá basálí o bisíká Nzámbe atíndí bangó.
II C LinVB 10:17  Moto alingí komíkúmisa, ámíkúmisa bobélé mpô ya Mokonzi.
II C LinVB 10:18  Oyo akomíkúmisaka azalí moto wa sôló té ; kasi óyo Nzámbe akúmísí, yě azalí sôló moto wa lokúmu.