Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II THESSALONIANS
1 2 3
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 3
II T LinVB 3:1  Lisusu bandeko, bósámbelela bísó mpô ’te Liloba lya Mokonzi lípalangana naíno, mpé lízwa nkémbo bipái bisúsu lokóla epái ya bínó.
II T LinVB 3:2  Bósámbela mpé mpô tóbíka o mabóko ma bato babúngámá mpé ba motéma mabé, zambí bato bánso mpenzá té bazalí na boyambi.
II T LinVB 3:3  Kasi Mokonzi akotíka bínó té : akoléndisa bínó mpé akobíkisa bínó o mabóko ma Mongúná.
II T LinVB 3:4  Mpô ya Mokonzi tozalí kotía elíkyá na bínó ’te bokosálaka mpé bokosála maye totíndí bínó.
II T LinVB 3:5  Mokonzi áka­mba mitéma mya bínó mpô ’te bólinga Nzámbe, mpé bózala na moléndé lokóla Krístu.
II T LinVB 3:6  Bandeko, o nkómbó ya Mokonzi Yézu Krístu, totíndí bínó bókíma bandeko bánso balekí goigói, baye babóyí kosála lokóla totíndí bínó.
II T LinVB 3:7  Boyébí malámu ndéngé bose­ngélí kolanda ndakisa ya bísó : ntángo tozalákí epái ya bínó, tozalákí goigói té.
II T LinVB 3:8  Mbala yǒ kó té tolíákí límpa liye moto mosúsu apésákí bísó ; kasi butú mói tozalákí kosála mosálá, tozalákí komílembisa na mosálá mpô tómemisa mǒkó wa bínó mókúmbá té.
II T LinVB 3:9  Ya sôló, tokokákí kosénge bínó bilóko, kasi toli­ngákí kopésa bínó ndakisa mpô ’te bósála lokóla bísó.
II T LinVB 3:10  Kútu ntángo tozalákí epái ya bínó, totíkélákí bínó mobéko moye : Sókó moto alingí kosála mosálá té, álía mpé té.
II T LinVB 3:11  Nzókandé toyókí ’te bato basúsu o káti ya bínó bapu­sí goigói, babóyí kosála atâ mosálá moko ; mosálá mwa bangó, sé kokóto o makambo ma bato basúsu.
II T LinVB 3:12  O nkómbó ya Mokonzi Yézu Krís­tu tozalí kotínda mpé kopálela bato baye ’te básála mosálá na motéma nyê, bôngó bálía bilóko bazwí na mosálá mwa bangó mǒkó.
II T LinVB 3:13  Kasi bínó, bandeko, bólembe té kosála malámu.
II T LinVB 3:14  Sókó moto abóyí kotósa mitíndo mikomámí o monkandá moye, bóyébisa nkómbó ya yě epái ya báníngá ; bótíka yě mpô áyóka nsóni.
II T LinVB 3:15  Nzókandé bótála yě lokóla mongúná té, kasi bópálela yě lokóla ndeko.
II T LinVB 3:16  Mokonzi wa bobóto yě mǒkó ákabela bínó bobóto ntángo ínso mpé bipái bínso. Mokonzi ázala na bínó bánso.
II T LinVB 3:17  Ngáí mǒkó, Pólo, nakomí maloba maye ma losáko na lobóko la ngáí. Ezalí elembo ekolakisaka minkandá mya ngáí mínso. Tálá ndéngé nakokomaka.
II T LinVB 3:18  Ngrásya ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu ézala na bínó bánso.