Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOSHUA
Prev Up Next
Chapter 20
Josh LinVB 20:2  « Loba na ba-Israel : Bopono mbo­ka ya kozwa libiki, iye nalobaki na bino na monoko mwa Moze.
Josh LinVB 20:3  Moto abomi moninga, kasi na nko te, akoki kokima kuna ; mboka ina ikosalisa bino mpo ya kobombama soko moto alingi kobekola makila ma ndeko wa ye.
Josh LinVB 20:4  Moto abomi moninga akoki kokima o mboka ena. Akende koteleme o ezibeli ya mboka mpe ayebisa bakolo ba mboka likambo lya ye. Ba­ngo bandima ye o mboka ya bango mpe balakisa ye esika akoki kofanda o kati ya bango.
Josh LinVB 20:5  Soko ndeko wa mowei alandi ye, bango bakoki kokaba mobomi o maboko ma ye te, zambi abomaki moninga kasi na nko te, abombelaki ye nkanda o motema te.
Josh LinVB 20:6  Atikala o mboka ena tee basili kosamba likambo lya ye o miso ma bato banso ba lisanga, tee liwa lya nganga Nzambe monene, oyo azali na mosala o eleko ena. Bobele nsima mobomi akoki kozonga o mboka mpe o libota lya ye, o esika afandaki liboso. »
Josh LinVB 20:7  Baponi bongo Kades o Galilea, o ngomba ya Neftali, Sikem o ngomba ya Efraim, mpe Kiriat-Arba, ekomi lelo Ebron, o ngomba ya Yuda.
Josh LinVB 20:8  O ngambo ya Yordane, longwa o Yeriko epai ya Esti, baponi Beser o eliki, o mokili mwa libota lya Ruben, Ramot o Galaad o mokili mwa libota lya Gad, mpe Golan o Basan o mokili mwa libota lya Manase.
Josh LinVB 20:9  Tala mboka inso bana ba Israel na bampaya baye bakofandaka o mboka ya ba­ngo, esika bakoki kobombama soko babomi moninga kasi na nko te, mpo ’te babika o maboko ma moto oyo akoki kozongisela bango mabe, tee bazuzi basambi likambo lya ye o miso ma bakolo ba lisanga.