JOSHUA
Chapter 19
Josh | LinVB | 19:1 | Mbala ya ibale zeke elakisi libota lya bana ba Simeon, engebene na bituka bya bango. Mabelé ma bango mazalaki o kati ya mokili mwa bana ba Yuda. | |
Josh | LinVB | 19:8 | bakisa mboka inso izalaki penepene na mboka iye tee o Balaat-Beer mpe Rama o Negeb. Mabelé ma bana ba libota lya Simeon, engebene na bituka bya bango, mango mana. | |
Josh | LinVB | 19:9 | Mabelé ma bana ba Simeon mazalaki eteni ya bana ba Yuda, zambi mabelé bana ba Yuda bazwaki malekaki na bonene. Yango wana bana ba Simeon bazwi mabelé ma bango o mabelé ma bana ba Yuda. | |
Josh | LinVB | 19:10 | Mbala ya isato zeke elakisi libota lya bana ba Zabulon engebene na bituka bya bango. Mokili mwa bango mokei tee Sadud. | |
Josh | LinVB | 19:12 | Otiki Sadud, bongwana o Esti epai moi mokobimaka o ndelo ya Kislot-Tabor, leka epai ya Daberat mpo ya kosuka o Yafia. | |
Josh | LinVB | 19:13 | Olongwi wana, leka epai ya Esti ya Gat-Akefer mpe Ita-Kasin, kende o Rimon mpe bongwana tee o Nea. | |
Josh | LinVB | 19:15 | Bazwi mboka ya Katat, Nakalal, Simron, Yireala na Beteleme : mboka zomi na ibale na mpe mboka ike. | |
Josh | LinVB | 19:16 | Mabelé ma bana ba Zabulon, engebene na bituka bya bango, mango mana ; bazwi mboka inene na ike. | |
Josh | LinVB | 19:17 | Mbala ya inei zeke elakisi libota lya bana ba Izakar, engebene na bituka bya bango. | |
Josh | LinVB | 19:22 | Ndelo ezali o Tabor, Sakasima, o Bet-Semes mpe o Yordane : mboka zomi na motoba na mpe mboka ike. | |
Josh | LinVB | 19:23 | Mabelé ma bana ba libota lya Izakar engebene na bituka bya bango ; mboka inene na ike. | |
Josh | LinVB | 19:26 | Alamelek, Amead na Miseal, o ndelo ya ngomba Karmel epai ya Westi na mpe moluka Libnat. | |
Josh | LinVB | 19:27 | Epai ya Esti mokili mokei tee o Bet-Dagon, o ndelo ya mokili mwa Zabulon, o lobwaku la Yifta-El o Nordi, o Bet-a-Emek mpe o Neyel, mosuki o Kabul o loboko la mwasi, | |
Josh | LinVB | 19:29 | Na nsima kende o Rama tee o mboka etongami makasi ya Tiro. Na nsima leka o Osa mpo ya kosuka o Mbu ya Mongwa. Mpe Mekebel, Aksib, | |
Josh | LinVB | 19:31 | Mabelé ma bana ba libota lya Aser, engebene na bituka bya bango, mango mana ; mboka inene na ike. | |
Josh | LinVB | 19:32 | Mbala ya motoba zeke elakisi libota lya bana ba Neftali, engebene na bituka bya bango. | |
Josh | LinVB | 19:33 | Mokili mwa bango mobandi o Elef mpe o Nzete ya Sananim, leka Adami-Anekeb mpe Yabneel tee Lakum mpe mosuki o Yordane. | |
Josh | LinVB | 19:34 | O Westi leka o Asnot-Tabor tee Kukok. O Sudi okomi o ndelo ya mokili mwa Zabulon, o Westi o ndelo ya mokili mwa Aser, o Esti o ndelo ya mokili mwa Yuda mpe o Yordane. | |
Josh | LinVB | 19:38 | Yiron, Migdal-El, Korem, Bet-Anat mpe Bet-Semes : mboka zomi na libwa na mpe mboka ike ya penepene. | |
Josh | LinVB | 19:39 | Mabelé ma bana ba Neftali engebene na bituka bya bango, mango mana ; mboka inene na ike. | |
Josh | LinVB | 19:47 | Kasi bana ba Dan babungisi mokili mwa bango ; yango wana bana ba Dan bakei kobunda na Lesem, babotoli mboka mpe babomi bato banso na mopanga. Babotoli mboka mpe bakei kofanda kuna ; bapesi Lesem nkombo esusu : Dan, nkombo ya nkoko wa bango Dan. | |
Josh | LinVB | 19:48 | Mabelé ma bana ba libota lya Dan engeben, na bituka bya bango, mango mana ; mboka inene na ike. | |
Josh | LinVB | 19:49 | Esilisi bato ba Israel kokabola mokili mpe kotia ndelo, bapesi Yozue, mwana wa Nun, mabelé o kati ya bango. | |
Josh | LinVB | 19:50 | Lokola Yawe atindaki bango, bapesi Yozue mboka eye asengeki, mboka Timnat-Sera o ngomba ya Efraim, Atongi mboka lisusu mpe afandi kuna. | |