JOSHUA
Chapter 7
Josh | LinVB | 7:1 | Kasi ba-Israel basali lisumu mpe babebisi ekila ya Yawe : Akan, mwana wa Karmi, mwana wa Zabdi, mwana wa Zera wa libota lya Yuda, akamati biloko bya ekila mpe Yawe ayokeli ba-Israel nkanda enene. | |
Josh | LinVB | 7:2 | Yozue atindi bato balongwa o Yeriko mpe bakende o Ayi, penepene na Bet-Aven, o Esti ya Betel ; alobi na bango : « Bokende konongo mokili. » Bakei konongo mboka Ayi. | |
Josh | LinVB | 7:3 | Bazongi epai ya Yozue mpe balobi na ye : « Otinda bato banso te, kasi se bato soki nkoto ibale to isato mpo bakende kobotolo Ayi. Olembisa bato banso na etumba eye te, zambi kuna bato bazali mingi te. » | |
Josh | LinVB | 7:4 | Yango wana bobele bato soki nkoto isato bakei kobunda na bato ba Ayi, kasi o miso ma bato ba Ayi bakimi kokima. | |
Josh | LinVB | 7:5 | Bato ba Ayi babomi bato soki ntuku isato na motoba, na nsima balandi bango leka ezibeli ya mboka tee Sebarim ; babomi bato banso baye bazalaki kokima mboka. Bongo mitema mya bango milembi, bozalaki na mpiko lisusu te. | |
Josh | LinVB | 7:6 | Yozue apasoli bilamba bya ye, akwei elongi o nse o boso bwa Sanduku ya Bondeko, atikali bongo tee mpokwa. Bakolo ba Israel basali se bongo mpe banso bapakoli mputulu o mitó. | |
Josh | LinVB | 7:7 | Yozue alobi : « E Yawe, Mokonzi wa ngai, mpo nini otindaki bato baye bakatisa Yordane, bakweya bongo o maboko ma bato ba Amor mpe bakufa ? Malamu soko tondimaki kofanda kuna o ngambo ya Yordane ! | |
Josh | LinVB | 7:9 | Bato ba Kanana na bato banso ba mokili moye bakoyoka likambo lyango, bakoyokana ’te bakosilisa nkombo ya biso o mokili. O mokolo mona okosala nini mpo ya lokumu la nkombo ya yo ? » | |
Josh | LinVB | 7:11 | Bato ba Israel basali lisumu, babomi bondeko nakataki na bango. Babotoli biloko bipekisami, bayibi byango mpe babombi byango, batii byango o kati ya biloko bya bango. | |
Josh | LinVB | 7:12 | Yango wana bato ba Israel bakokoka na banguna te, bakokima banguna, zambi bango moko bamilukeli etumbu. Ngai nakozala na bino lisusu te soko bolongoli biloko bya ekila o kati ya bino te. | |
Josh | LinVB | 7:13 | Teleme, santisa bato mpe loba na bango : Bomisantisa mpo ya lobi, zambi Yawe Nzambe wa Israel alobi : Israel akozwa bobe ; okokoka banguna bobele soko olongoli biloko bya ekila o kati ya bino. | |
Josh | LinVB | 7:14 | Boya epai ya ngai lobi na ntongo, libota na libota. Bato ba libota liye Yawe akolakisa, babeleme na ngai, etuka yoko yoko. Bato ba etuka eye Yawe akolakisa babeleme na ngai, ndako yoko yoko ; mpe bato ba ndako eye Yawe akolakisa babeleme na ngai moto moko moko. | |
Josh | LinVB | 7:15 | Moto oyo Yawe akolakisa ’te abebisi ekila, batumba ye na móto elongo na biloko binso bizali na ye, zambi abomaki bondeko bwa Yawe mpe asalaki likambo lya nsomo o Israel. » | |
Josh | LinVB | 7:16 | Yozue atelemi na nta ntongo. Abengi bato banso ba Israel, libota na libota ; mpe ebimi libota lya Yuda. | |
Josh | LinVB | 7:17 | Abengi bituka bya Yuda, mpe ebimi etuka ya Zera. Abengi bato ba etuka ya Zera, ndako yoko yoko, mpe ebimi ndako ya Zabdi. | |
Josh | LinVB | 7:18 | Yozue abengi bato ba ndako ya Zabdi, moko moko, mpe ebimi Akan, mwana wa Karmi, mwana wa Zabdi, mwana wa Zera wa libota lya Yuda. | |
Josh | LinVB | 7:19 | Yozue alobi na Akan : « Mwana wa ngai, pesa nkembo na Yawe Nzambe wa Israel mpe kumisa ye. Yebisa ngai likambo osalaki, obombela ngai eloko te. » | |
Josh | LinVB | 7:20 | Akan ayanoli Yozue : « Ya solo, ngai moto nasalaki lisumu o miso ma Yawe Nzambe wa Israel ; yoka ndenge nasalaki. | |
Josh | LinVB | 7:21 | O kati ya biloko tobotoloki namonoki monkoto mwa Sinear, ya kitoko mpenza, na mitako mya palata nkama ibale na eteni ya wolo ya kilo itano, nalulaki yango mpe nakamataki yango. Nabombi yango o nse ya mabelé o ema, mpe palata ezali o nse. » | |
Josh | LinVB | 7:22 | Yozue atindi bato bakende noki epai ya ema, mpe ya solo monkoto mobombami o ema mpe palata ezalaki o nse. | |
Josh | LinVB | 7:23 | Bakamati biloko bina binso o ema mpe bakei na byango epai ya Yozue o miso ma bato banso ba Israel ; batii byango liboso lya Yawe. | |
Josh | LinVB | 7:24 | Na nsima Yozue akei na Akan, mwana wa Zera epai ya lobwaku la Akor. Bakamati mpe palata, monkoto na eteni ya wolo, bana ba ye babali mpe basi, ngombe mobali, mpunda na mpata ya ye, na ema na biloko binso bizalaki na ye. Bato banso ba Israel bakei na ye elongo. | |
Josh | LinVB | 7:25 | Yozue atuni : « Mpo nini okotisi biso o nzela ya mpasi boye ? Malamu Yawe apesa yo etumbu se lelo ! » Mpe bato banso ba Israel babomi ye na mabanga, babwakeli bango mabanga mpe batumbi bango. | |