Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOSHUA
Prev Up Next
Chapter 9
Josh LinVB 9:1  Bakonzi banso bazalaki o ngambo ena ya Yordane bayoki makambo mana : ná baye bafandi o mokili mwa ngomba, ná baye bafa­ndi o esobe penepene na Mbu Enene tee Libano : ba-Iti, ba-Amor, ba-Kanana, ba-Perizi, ba-Ivi, ba-Yebus.
Josh LinVB 9:2  Bayokani ’te banso elongo bakobundisa Yozue na ba-Israel.
Josh LinVB 9:3  Bato ba Gabaon bayoki boniboni Yozue asalaki Yeriko mpe Ayi ;
Josh LinVB 9:4  bo­ngo bango mpe basali mayele. Bakei koluka bilei ; bakumbisi mpunda ya bango ngoto ya kala mpe mabenga ma kobomba vino, matu­bwani mpe mabambami ;
Josh LinVB 9:5  balati mapapa mabebi mpe bilamba bipaswani. Mampa ma­nso bamemi makomi makasi mpe ma­bukani ndambo ndambo.
Josh LinVB 9:6  Bakei epai ya Yozue o nganda ya Gilgal ; balobi na ye mpe na bato ba Israel : « Biso touti o mokili mosika ; malamu bokata bondeko na biso. »
Josh LinVB 9:7  Ba-Israel balobi na ba-Ivi : « Mbele bofandi o kati ya biso, nani ayebi ? Bongo ndenge nini tokoki kokata na bino bondeko ? »
Josh LinVB 9:8  Bango bayanoli Yozue : « Tozali basaleli ba yo. » Yozue atuni bango : « Kasi bino banani ? Bo­u­ti wapi ? »
Josh LinVB 9:9  Bango bazo­ngisi : « Biso basaleli ba yo touti o mokili mosika mingi, zambi toyokaki ngambo ya Yawe Nzambe wa yo ; basololaki biso makambo manso Yawe asalaki bino o Ezipeti,
Josh LinVB 9:10  mpe makambo manso asalaki bakonzi babale ba Amor, baye bafandaki o ngambo ya Yordane : Sikon, mokonzi wa Ke­s­bon, mpe Og, mokonzi wa Basan, oyo afandaki o Astarot.
Josh LinVB 9:11  Yango wana bakolo na bato banso ba mokili mwa biso balobaki na biso : Bomeme bilei mpo ya mobembo ; bokende epai ya bango mpe boloba : Tozali basaleli ba bino, bokata na biso bondeko !
Josh LinVB 9:12  Botala mampa ma biso, mazalaki móto ntango tokamataki bilei o ndako o mokolo tolongwaki epai ya biso mpo tokoma awa epai ya bino ; botala mango sikawa : mampa makomi makasi mpe mabukani ndambo ndambo.
Josh LinVB 9:13  Mabenga maye totondisaki na vino mazalaki mabenga ma sika, botala mango : sikawa matubwani. Mapapa ma biso na bilamba bya biso bibebi mpo ya mobembo molai. »
Josh LinVB 9:14  Bankumu ba Israel bakamati ndambo ya bilei bya bango, kasi batuni Yawe te.
Josh LinVB 9:15  Yozue ayambi bango na boboto ; akati na bango bo­ndeko mpo ’te babika, mpe bankumu ba libota balayi ndai ’te bakobika.
Josh LinVB 9:16  Mikolo misato nsima ya bokati bo­ndeko boye, bayoki ’te bango bakofandaka o mokili mwa penepene o kati ya ba-Israel.
Josh LinVB 9:17  Ba-Israel batiki nga­nda mpe bakoti o mboka ya ba­ngo nsima ya mikolo misato. Mboka ya bango : Gabaon, Kefira, Beerot na Kiriat-Yearim.
Josh LinVB 9:18  Bato ba Israel babundisi bango te, zambi bankumu ba libota balayaki ndai o nkombo ya Yawe Nzambe wa Israel ’te bakobikisa bango ; kasi bato banso ba lisanga basilikeli bango.
Josh LinVB 9:19  Bankumu balobi na bato banso ba lisanga : « Tolayelaki Yawe Nzambe wa Israel ndai ; tokoki kosala bango mabe te.
Josh LinVB 9:20  Tokosala bango boye : Botika bango na bomoi mpo ’te Yawe ayokela biso nkanda te mpo ya ndai tolayaki. »
Josh LinVB 9:21  Bankumu balobi : « Batikala na bomoi, kasi bapasola nkoni mpe batoka mai mpo ya lisanga mobimba. » Bankumu balobi bongo.
Josh LinVB 9:22  Yozue abengi bato ba Gabaon mpe atuni bango : « Awa bokofandaka o ka­ti ya biso, mpo nini bokosaki biso mpe bolobaki : Biso touti o mokili mosika, nzokande bofandi penepene na biso ?
Josh LinVB 9:23  Banda lelo bozwi bobe mpe bokozala baombo ba biso seko ; bokopasola nkoni mpe bokotoka mai mpo ya Ndako ya Nzambe wa ngai. »
Josh LinVB 9:24  Bango bazongiseli Yozue : « Tosalaki bongo, zambi balobelaki biso baombo ba yo ’te Yawe Nzambe wa yo apesaki mosaleli wa ye Moze etinda ’te akopesa yo mokili moye mobi­mba mpe akoboma bato banso o miso ma yo. Yango wana, eyokaki biso ’te bokomi kobeleme, toyokaki motema nsomo mpe toba­ngaki ’te bokoboma biso. Ntina yango tosalaki bongo.
Josh LinVB 9:25  Sikawa biso tokomi o maboko ma yo ; sala na biso maye omoni mazali malamu mpe semba. »
Josh LinVB 9:26  Yozue asali bango bongo mpe abikisi bango o maboko ma ba-Israel mpo ’te baboma bango te.
Josh LinVB 9:27  O mokolo mona Yozue apesi bango mosala mwa kokata nkoni mpe mwa kotoka mai mpo ya lisanga mpe mpo ya altare ya Yawe ; bakosalaka bongo tee lelo o bisika binso Nzambe aponoki.