JOSHUA
Chapter 9
Josh | LinVB | 9:1 | Bakonzi banso bazalaki o ngambo ena ya Yordane bayoki makambo mana : ná baye bafandi o mokili mwa ngomba, ná baye bafandi o esobe penepene na Mbu Enene tee Libano : ba-Iti, ba-Amor, ba-Kanana, ba-Perizi, ba-Ivi, ba-Yebus. | |
Josh | LinVB | 9:4 | bongo bango mpe basali mayele. Bakei koluka bilei ; bakumbisi mpunda ya bango ngoto ya kala mpe mabenga ma kobomba vino, matubwani mpe mabambami ; | |
Josh | LinVB | 9:5 | balati mapapa mabebi mpe bilamba bipaswani. Mampa manso bamemi makomi makasi mpe mabukani ndambo ndambo. | |
Josh | LinVB | 9:6 | Bakei epai ya Yozue o nganda ya Gilgal ; balobi na ye mpe na bato ba Israel : « Biso touti o mokili mosika ; malamu bokata bondeko na biso. » | |
Josh | LinVB | 9:7 | Ba-Israel balobi na ba-Ivi : « Mbele bofandi o kati ya biso, nani ayebi ? Bongo ndenge nini tokoki kokata na bino bondeko ? » | |
Josh | LinVB | 9:8 | Bango bayanoli Yozue : « Tozali basaleli ba yo. » Yozue atuni bango : « Kasi bino banani ? Bouti wapi ? » | |
Josh | LinVB | 9:9 | Bango bazongisi : « Biso basaleli ba yo touti o mokili mosika mingi, zambi toyokaki ngambo ya Yawe Nzambe wa yo ; basololaki biso makambo manso Yawe asalaki bino o Ezipeti, | |
Josh | LinVB | 9:10 | mpe makambo manso asalaki bakonzi babale ba Amor, baye bafandaki o ngambo ya Yordane : Sikon, mokonzi wa Kesbon, mpe Og, mokonzi wa Basan, oyo afandaki o Astarot. | |
Josh | LinVB | 9:11 | Yango wana bakolo na bato banso ba mokili mwa biso balobaki na biso : Bomeme bilei mpo ya mobembo ; bokende epai ya bango mpe boloba : Tozali basaleli ba bino, bokata na biso bondeko ! | |
Josh | LinVB | 9:12 | Botala mampa ma biso, mazalaki móto ntango tokamataki bilei o ndako o mokolo tolongwaki epai ya biso mpo tokoma awa epai ya bino ; botala mango sikawa : mampa makomi makasi mpe mabukani ndambo ndambo. | |
Josh | LinVB | 9:13 | Mabenga maye totondisaki na vino mazalaki mabenga ma sika, botala mango : sikawa matubwani. Mapapa ma biso na bilamba bya biso bibebi mpo ya mobembo molai. » | |
Josh | LinVB | 9:15 | Yozue ayambi bango na boboto ; akati na bango bondeko mpo ’te babika, mpe bankumu ba libota balayi ndai ’te bakobika. | |
Josh | LinVB | 9:16 | Mikolo misato nsima ya bokati bondeko boye, bayoki ’te bango bakofandaka o mokili mwa penepene o kati ya ba-Israel. | |
Josh | LinVB | 9:17 | Ba-Israel batiki nganda mpe bakoti o mboka ya bango nsima ya mikolo misato. Mboka ya bango : Gabaon, Kefira, Beerot na Kiriat-Yearim. | |
Josh | LinVB | 9:18 | Bato ba Israel babundisi bango te, zambi bankumu ba libota balayaki ndai o nkombo ya Yawe Nzambe wa Israel ’te bakobikisa bango ; kasi bato banso ba lisanga basilikeli bango. | |
Josh | LinVB | 9:19 | Bankumu balobi na bato banso ba lisanga : « Tolayelaki Yawe Nzambe wa Israel ndai ; tokoki kosala bango mabe te. | |
Josh | LinVB | 9:20 | Tokosala bango boye : Botika bango na bomoi mpo ’te Yawe ayokela biso nkanda te mpo ya ndai tolayaki. » | |
Josh | LinVB | 9:21 | Bankumu balobi : « Batikala na bomoi, kasi bapasola nkoni mpe batoka mai mpo ya lisanga mobimba. » Bankumu balobi bongo. | |
Josh | LinVB | 9:22 | Yozue abengi bato ba Gabaon mpe atuni bango : « Awa bokofandaka o kati ya biso, mpo nini bokosaki biso mpe bolobaki : Biso touti o mokili mosika, nzokande bofandi penepene na biso ? | |
Josh | LinVB | 9:23 | Banda lelo bozwi bobe mpe bokozala baombo ba biso seko ; bokopasola nkoni mpe bokotoka mai mpo ya Ndako ya Nzambe wa ngai. » | |
Josh | LinVB | 9:24 | Bango bazongiseli Yozue : « Tosalaki bongo, zambi balobelaki biso baombo ba yo ’te Yawe Nzambe wa yo apesaki mosaleli wa ye Moze etinda ’te akopesa yo mokili moye mobimba mpe akoboma bato banso o miso ma yo. Yango wana, eyokaki biso ’te bokomi kobeleme, toyokaki motema nsomo mpe tobangaki ’te bokoboma biso. Ntina yango tosalaki bongo. | |
Josh | LinVB | 9:25 | Sikawa biso tokomi o maboko ma yo ; sala na biso maye omoni mazali malamu mpe semba. » | |
Josh | LinVB | 9:26 | Yozue asali bango bongo mpe abikisi bango o maboko ma ba-Israel mpo ’te baboma bango te. | |