Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOSHUA
Prev Up Next
Chapter 5
Josh LinVB 5:1  Eyoki bakonzi banso ba Amor, baye bafandi o ngambo ya Yordane epai ya Westi, na bakonzi banso ba Kanana, baye bafandi penepene na mbu, ’te Yawe akaukisaki mai kin’o ntango bato banso basili koleka, mitema mya bango milembi mpe mpiko elongwi epai ya bango mpo ya nsomo ba-Israel bayokisaki bango.
Josh LinVB 5:2  O mikolo mina Yawe alobi na Yozue : « Kamata mabanga mpe sala na mango mbeli ; kata nzoto ya bana ba Israel baye bakatami naino te. »
Josh LinVB 5:3  Yozue asali mbeli ya mabanga mpe akati nzoto ya bato ba Israel kuna o ngo­mba Aralot.
Josh LinVB 5:4  Yozue akati bato na ntina eye : Babali banso, baye babimaki o Ezipeti mpe bakokaki na etumba, banso basili kokufa o eliki, o nzela, nsima ya bobimi o Ezipeti.
Josh LinVB 5:5  Bato banso babimaki o Ezipeti bakatamaki nzoto, kasi baye babotamaki o eliki, o nzela, nsima ya bobimi o Ezipeti, bakatamaki nzoto te.
Josh LinVB 5:6  Ya solo, mibu ntuku inei mobimba ba-Israel batambolaki o eliki ; babali banso babimaki o Ezipeti, baye bakokaki na etumba, bakufi. Batosaki lolaka la Yawe te mpe Yawe alayelaki bango ’te bakomono mo­kili te, moye alayelaki batata ba biso ’te akopesa bango, mokili moye motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi.
Josh LinVB 5:7  Yozue atii bana o esika ya batata ba bango mpe akati bango nzoto ; bazalaki misutu, zambi o mobembo mwa bango bakataki moto moko te.
Josh LinVB 5:8  Esilisi bango kokata bato banso, batikali o nganda tee mpota ekauki.
Josh LinVB 5:9  Yawe alobi na Yozue : « Lelo nalongoli nsoni boyokaki o Ezipeti. » Yango wana bata­ngi esika ena na nkombo Gilgal tee lelo.
Josh LinVB 5:10  Ba-Israel bapiki nganda o Gilgal, mpe o esobe ya Yeriko basepeli eye­nga ya Pasika mokolo mwa zomi na minei mwa sanza, na mpokwa.
Josh LinVB 5:11  Mokolo nsima ya Pasika balei biloko ba­zwaki o mboka ena, na mampa balambi na nkisi te, na mbuma ya ma­mpa bakalingi.
Josh LinVB 5:12  Kuna babandi ko­lia biloko bya mboka, manu masilaki. Solo, ba-Israel bazalaki na manu lisusu te, yango wana o mobu mona balei biloko bizwami o mokili mwa Kanana.
Josh LinVB 5:13  Ezalaki Yozue penepene na Yeriko, tombola miso amoni moto moko atelemi liboso lya ye, azalaki na mopanga o loboko. Yozue akei epai ya ye, atuni ye : « Ozali moto wa biso to monguna wa biso ? »
Josh LinVB 5:14  Ayanoli : « Te ! Ngai nazali mokambi wa mampinga ma Yawe mpe nayei sikawa. » Yozue akwei elongi o nse, akumbameli ye mpe alobi : « Mokonzi wa ngai, olingi koloba nini na ngai mosaleli wa yo ? »
Josh LinVB 5:15  Mokambi wa mampinga ma Yawe azongiseli Yozue maloba maye : « Lo­ngola mapapa o makolo, zambi esika otelemi ezali esantu. » Yozue asali bo­ngo.