Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MALACHI
1 2 3
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 3
Mala LinVB 3:1  Tala, nakotinda ntoma wa ngai. Akobongisa nzela liboso lya ngai. Akoyingela o Tempelo na mbalakaka, Mokonzi oyo boluki, na anzelu wa bondeko, oyo boli­ngi. Yawe wa bokasi bonso alobi : « Tala,azalikoya ! »
Mala LinVB 3:2  Kasi nani akobika o mokolo mwa boyei bwa ye ? Nani akoteleme naino mokolo ako­bima ? Mpamba te, akozala lokola móto mwa motuli, mpe lokola mai ma mosukoli bilamba.
Mala LinVB 3:3  Akofanda mpo ya konyangwisa mpe kopetola bana ba Levi, lokola bakopetolaka wolo na palata. Bongo nde bakoki kobonzela Yawe mabonza malo­ngobani.
Mala LinVB 3:4  Yawe akosepela lisusu na mabonza ma Yuda mpe ma Yeruzalem, lokola asepelaka na mango o ntango ya kala.
Mala LinVB 3:5  Yawe wa bokasi bo­nso alobi : « Ntango nakoya kosambisa bino, nakofunda baye bakosalelaka banzambe ba lokuta, bato ba bokali, bato bakolayaka ndai ya lokuta na baye bakokutolaka lifuta lya basali, baye bakonyokoloko basi bazenge, bana bitike na ba­mpaya, baye banso bakobangaka ngai te.
Mala LinVB 3:6  Solo, ngai Yawe nakobongwanaka te. Kasi bino, bana ba Yakob, bokotikaka makambo ma bino te.
Mala LinVB 3:7  Banda ntango ya bankoko bokotikaka mibeko mya ngai mpe bokotosaka myango te. Yawe wa bokasi bonso alobi : Bozongela ngai mpe ngai nakozongela bino ! Bino bolobi : « Tozonga ndenge nini ? »
Mala LinVB 3:8  Moto akoki nde kokosa Nzambe ? Kasi bino bokokosaka ngai. Bolobi : « Tokosi ye ndenge nini ? » Bokokosaka ngai na makambo matali eteni ya zomi ya biloko mpe na bofuti mpako.
Mala LinVB 3:9  Bino banso bokokosaka ngai, mabe makokwela bino.
Mala LinVB 3:10  Boyela ngai mpako ya bino mobimba o ndako ya mosolo, mpo ’te biloko bya bolei bikoka o ndako ya ngai, mpe bomeka ngai soko ya solo nakofungola maziba ma likolo te, mpo ya kosalisa bino mpe kobenisa bino na bopesi makabo ebele.
Mala LinVB 3:11  Yawe wa bokasi bonso alobi : Nakopekisa mapalela másilisa mbuma ya bila­nga te, mpo ’te nzete ya vino ibota mbuma mingi.
Mala LinVB 3:12  Yawe wa bokasi bonso alobi : Bato ba bikolo binso bakotanga bino bato ba esengo, mpo bokokoma na mokili mwa bomengo. »
Mala LinVB 3:13  Yawe alobi : Maloba ma bino makoyokisaka ngai nkanda soko bo­tuni ngai : « Mabe ma yo nini tolobaki ? »
Mala LinVB 3:14  Bolobaki : « Kosalela Nza­mbe ezali na ntina te. Tokozwa litomba nini soko totosi mibeko mya Yawe wa bokasi bonso mpe tosali lilaka ? »
Mala LinVB 3:15  Sikawa tomoni ’te bato ba lofundo bakozwaka bolamu ; baye bakosalaka mabe bazali na bome­ngo ; ata batii ntembe na Nzambe, bakolonga !
Mala LinVB 3:16  O ntango ena baye bakobangaka Nzambe bakomi kolobana. Kasi Yawe ayoki bango. Buku ekomami o miso ma ye mpo ya kokundola makambo ma baye bakobangaka Yawe mpe bakokumisaka Nkombo ya ye.
Mala LinVB 3:17  Ya­we wa bokasi bonso alobi boye : Ba­ngo bakozala bato ba ngai mpe­nza mokolo moye ngai nale­ngeli. Nakoyokela bango mawa lokola tata akoyokelaka mwana wa ye mawa, mwana oyo akosalelaka ye.
Mala LinVB 3:18  Mokolo mona bokomono bokeseni kati ya moto semba na moto mabe, kati ya moto akosalelaka Nza­mbe na moto akosalelaka ye te.
Mala LinVB 3:19  Boyeba ’te mokolo mona mozali koya lokola móto monene. Yawe wa bokasi bonso alobi : Bato ba lofundo na bato babe bakozika lokola matiti makauka, ntina yoko to etapi yoko ekotikala te.
Mala LinVB 3:20  Kasi bino bato bokokumisaka Nkombo ya ngai, moi mwa bosembo moko­ngengele bino mpe mokoyela bino libiki. Bokota­mbola mpe bokodondwa lokola bana ba ngombe bakoleisaka malamu.
Mala LinVB 3:21  Yawe wa bokasi bonso alobi : Bino bokonyata bato babe. Mokolo nalengeli, bango bakozala lokola mputulu ya makala o nse ya makolo ma bino.
Mala LinVB 3:22  Bokundola Mobeko mwa Moze, mosaleli wa ngai. Napesaki ye mibeko mpe mimeseno mpo ya Israel mobimba o ngomba Oreb.
Mala LinVB 3:23  Tala, nakotindela bino profeta Elia liboso ’te mokolo moye monene mpe mwa nsomo moya.
Mala LinVB 3:24  Elia akotia boyokani kati ya batata na bana, kati ya bana na batata ba ba­ngo, mpo ’te natombela ekolo eye bobe te.