Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
RUTH
1 2 3 4
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 4
Ruth LinVB 4:1  Booz akei o ezibeli ya mboka mpe afandi wana. Tala moto oyo akoki kosikola Rute, oyo Booz alobaki, azalaki koleka. Booz alobi : « Ndeko, yaka mpe fanda awa. » Moto ayei mpe afandi.
Ruth LinVB 4:2  Booz aponi bato zomi o kati ya bakolo ba mboka mpe alobi : « Bofanda awa » ; mpe bafandi.
Ruth LinVB 4:3  Nsima alobi na moto oyo akoki kosikola ndeko : « Noemi oyo alongwaki o esobe ya Moab, alingi koteke eteni ya mabelé eye ezalaki ya ndeko wa biso Elimelek.
Ruth LinVB 4:4  Bongo nakanisi ’te nasengeli koyebisa yo : Somba mango o miso ma bato bafandi awa mpe o miso ma bakolo ba ekolo ya ngai. Soko olingi kosomba mango, bimisa mo­solo, kasi soko olingi kosikola mango te, yebisa ngai boniboni nakoki kosala, zambi moto mosusu akoki kosomba mango te, bobele yo, mpe nsima ya yo bobele ngai. » Moto ona ayanoli : « Ngai nalingi kosomba ma­ngo. »
Ruth LinVB 4:5  Kasi Booz alobi na ye : « Mokolo okosomba elanga o maboko ma Noemi, okozwa mpe Rute, mwasi auti o Moab, oyo akufeli mobali, mpo ’te nkombo ya mowei elongwa o mokili mwa ye te. »
Ruth LinVB 4:6  Moto akoki kosikola alobi : « Nakoki kosomba elanga mpo ya ngai te ; soko nasali bongo, nase-ngeli koteke mabelé ma ngai masusu ! Yo moko somba elanga eye ngai nakoki kosikola, zambi ngai nazali na mosolo te mpo nasomba mango. »
Ruth LinVB 4:7  Liboso ezalaki momeseno o Israel, soko balingi kosikola to kosomba eloko, mpo ’te emonono polele ’te likambo lisili likatemi : moto alongola lipapa lya ye mpe apesa moto mosusu lyango. Bazalaki kolakisa bongo o Israel ’te likambo lisili likatemi.
Ruth LinVB 4:8  Oyo akoki kosikola alobi na Booz : « Yo moko somba yango », mpe alongoli lipapa lya ye.
Ruth LinVB 4:9  Booz alobi na bakolo mpe na bato banso : « Lelo bino bozali banzeneneke ba ngai ’te nazwi o maboko ma Noemi biloko binso bizalaki bya Elimelek mpe binso bizalaki bya Kilion mpe Malon.
Ruth LinVB 4:10  Nazwi mpe Rute, moto wa Moab, mwasi wa Malon, mpo ’te nakoka kotombola lisusu nkombo ya mowei o ekolo, bo­ngo nkombo ya mowei ekufa te o miso ma bato ba mboka mpe o miso ma bandeko ba ye. Lelo bozali banzeneneke ba ngai. »
Ruth LinVB 4:11  Bato banso bazalaki o ezibeli ya mboka mpe bakolo ba­nso balobi : « Biso tomoni yango ! Yawe asala ’te mwasi oyo akokoto o ndako ya yo akokana na Rakele mpe na Lea, baye batongaki libota lya Israel. Olenda o Efrata, mpe ozwa nko­mbo ya lokumu o Beteleme.
Ruth LinVB 4:12  Mpo ya bana akokabela yo na mwasi oyo, libota lya yo likoma lokola libota lya Peres, mwana oyo Tamar abotelaki Yuda. »
Ruth LinVB 4:13  Booz abali Rute, ye akomi mwasi wa ye. Awa bakomi ndako yoko, Yawe asalisi Rute : azwi zemi mpe aboti mwana mobali.
Ruth LinVB 4:14  Basi ba mboka balobi na Noemi : « Bakumisa Yawe oyo asalisi yo mpe apesi yo moto oyo asikoli yo. Basakola lokumu la Yawe o Israel mobimba !
Ruth LinVB 4:15  Mwana oyo akosalisa yo mpe akobatela yo ntango okokoma mobange, zambi mama oyo aboti ye azali bokilo wa yo mpe alingi yo mingi. Mpo ya yo, ye aleki bana babali nsambo na bolamu. »
Ruth LinVB 4:16  Mpe Noemi ayambi mwana o bibelo ; ye moto abokoli mwana.
Ruth LinVB 4:17  Baninga ba ye basi baponi nko­mbo ya mwana, balobi : « Baboteli Noemi mwana mobali ! » Bongo bapesi ye nkombo Obed, ye nde tata wa Yese, nkoko wa Davidi.
Ruth LinVB 4:18  Tala awa nkombo ya bankoko ba Peres : Peres aboti Esron.
Ruth LinVB 4:20  Aminadab aboti Nakason ; Nakason aboti Salmon.