ZECHARIAH
Chapter 6
Zech | LinVB | 6:1 | Nafungoli miso lisusu, namoni limoni : Namoni makalo manei mazalaki koya kati ya ngomba ibale ; ngomba ina izalaki ya mbengi. | |
Zech | LinVB | 6:2 | Likalo lya yambo libendani na farasa ya nzoto etane, likalo lya mabale na farasa ya nzoto eindo, | |
Zech | LinVB | 6:3 | likalo lya masato na farasa ya nzoto mpembe, likalo lya manei na farasa ya nzoto matono matono. | |
Zech | LinVB | 6:4 | Natuni anzelu oyo azalaki koloba na ngai : « Mokonzi wa ngai, makalo mana malakisi nini ? » | |
Zech | LinVB | 6:5 | Anzelu ayanoli : « Makalo maye matelemeki o boso bwa Mokonzi wa nse mobimba mazali kokende nzela ya mimpepe minei. | |
Zech | LinVB | 6:6 | Farasa ya nzoto eindo izali kokende o ekolo ya Nordi, iye ya nzoto mpembe o ekolo ya Westi, mpe iye ya nzoto matono matono o ekolo ya Sudi. » | |
Zech | LinVB | 6:7 | Farasa ya nzoto etane ebandi kokende, na mposa enene ya kokoma o nse mobimba. Mokonzi atindi yango : « Bokende kokatisa nse mobimba. » Mpe ikei kokatisa nse mobimba. | |
Zech | LinVB | 6:8 | Abengi ngai, alobi : « Tala, baye bakokende o Nordi, bakokitisa motema mwa ngai o ekolo ya Nordi. » | |
Zech | LinVB | 6:10 | Kongolo mabonza ma bato bautaki o boombo : Keldai, Tobia na Yedaya ; mpe kende o ndako ya Yosia, mwana wa Sefanya, oyo auti o Babilon sikawa. | |
Zech | LinVB | 6:11 | Kamata wolo na palata, sala enkoti mpe tia yango o motó mwa nganga mokonzi Yozue, mwana wa Yosadak. | |
Zech | LinVB | 6:12 | Na nsima okoloba na ye : Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Tala moto oyo azali na nkombo ‘Eboto ya sika’, akokola o esika azali ; akotonga Tempelo ya Yawe lisusu. | |
Zech | LinVB | 6:13 | Ye moto akotonga Tempelo ya Yawe ; ye akolata bilamba bya bokonzi, akofanda o ngwende ya ye mpe akoyangela bato. Nganga Nzambe mpe akofanda o ngwende esusu ; bango babale bakoyokana malamu mpenza. | |
Zech | LinVB | 6:14 | Enkoti ya bokonzi ekotikala o Tempelo ya Yawe bo elembo ya kokanisa Keldai, Tobia na Yedaya mpe mwana wa Sefanya. | |