ZECHARIAH
Chapter 8
Zech | LinVB | 8:2 | Yoka maloba ma Yawe wa bokasi bonso : Nakolingaka Sion mingi mpenza, nakolakisaka ye bolamu bwa ngai. | |
Zech | LinVB | 8:3 | Yawe alobi : Nakozonga o Sion, nalingi kofanda o Yeruzalem. Bakotanga Yeruzalem ‘Engumba ya Lobokó’ mpe ngomba ya Yawe wa bokasi bonso ‘Ngomba Esantu’. | |
Zech | LinVB | 8:4 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Babange, babali na basi, bakopema o milolo mya Yeruzalem, moto na moto lingenda o maboko mpo ya bonuna. | |
Zech | LinVB | 8:6 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Soko bato ba ekolo eye bakotikala wana o mikolo mina bakokamwa na yango, ngai nakokamwa te. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. | |
Zech | LinVB | 8:7 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Nakobikisa bato ba ngai ut’o ekolo ya Esti mpe ekolo ya Westi. | |
Zech | LinVB | 8:8 | Nakozongisa bango mpo ’te bafanda o Yeruzalem. Bakozala bato ba ngai mpe ngai nakozala Nzambe wa bango, na lobokó mpe na bosembo ! | |
Zech | LinVB | 8:9 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Bolendisa maboko, bino bato bokoyokaka maloba ma baprofeta ut’o mikolo miye batiaki mabanga ma liboso ma ndako ya Yawe wa bokasi bonso mpo ya kotonga Tempelo lisusu. | |
Zech | LinVB | 8:10 | Liboso lya mikolo miye bato bazalaki kozwa lifuta te. Nyama ya bango izalaki kopesa litomba lyoko te. Bato balingaki kokende mpe kozonga bazalaki kobanga banguna o nzela. Ngai moko natikaki bato batombokelana. | |
Zech | LinVB | 8:11 | Kasi na bato batikali o mokili moye nakosala lisusu te lokola nasalaki o ntango ena. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. | |
Zech | LinVB | 8:12 | Sikawa bato bakolona na motema mpio ; nzete ya vino ekobota mbuma, mabelé makobotisa mbuma ilamu ; mampata makotangisa mamio. Nakopesa bato batikali o ekolo eye malamu maye manso. | |
Zech | LinVB | 8:13 | Lokola mabe maye batombeli bino makwelaki bino o bikolo bisusu, libota lya Yuda mpe lya Israel, se bongo nakobikisa bino mpe nakobenisa bino. Bobanga te mpe bolendisa maboko ! | |
Zech | LinVB | 8:14 | Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Lokola nakanaki kosala bino mabe, mpo bankoko ba bino bayokisaki ngai nkanda - maloba ma Yawe wa bokasi bonso - mpe nakitisaki motema te, | |
Zech | LinVB | 8:15 | se bongo nakolanda makanisi masusu : nakani kosala Yeruzalem mpe libota lya Yuda malamu. Bobanga te ! | |
Zech | LinVB | 8:16 | Boyoka nini bosengeli kosala : Moto na moto aloba se makambo ma bosolo na moninga wa ye ; bokata makambo na bosembo mpo ’te boboto bozonga. | |
Zech | LinVB | 8:17 | Bokanelana o mitema te, bolaya ndai ya lokuta te : nayini makambo maye manso. Maloba ma Yawe. | |
Zech | LinVB | 8:19 | Yawe wa bokasi bonso alobi boye : « Mikolo mya kolala nzala o sanza ya inei, ya nsambo mpe ya zomi, mikozala mikolo mya esengo mya bato ba Yuda, mikolo mya kosepela lokola ntango ya eyenga. Kasi boluka bosolo mpe boboto ! » | |
Zech | LinVB | 8:20 | Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Bato ba bikolo bisusu na bato ba bingumba binene bakoya awa. | |
Zech | LinVB | 8:21 | Bato ba engumba yoko bakokende koyebisa bato ba engumba esusu : « Tokende kobondela Yawe, toluka Yawe wa bokasi bonso ; biso mpe tokende. » | |
Zech | LinVB | 8:22 | Bato baike bakoya, bato balongwi o bikolo binene bakoya koluka Yawe wa bokasi bonso o Yeruzalem mpe bakobondela ye. | |