I PETER
Chapter 4
I Pe | LinVB | 4:1 | Awa Krístu ayókákí mpási o nzóto ya yě, bínó bóléndisa mitéma na likanisi ’te moto óyo ayókí mpási o nzóto asílí abóyí masúmu. | |
I Pe | LinVB | 4:2 | Bôngó mikolo mínso mya bomoi bwa yě áwa o nsé álanda mpósá ya motéma té, kasi ásála maye Nzámbe alingí. | |
I Pe | LinVB | 4:3 | Libosó bolekísákí ntángo míngi na bosáli makambo maye bapagáno bakosálaka : bozalákí kotámbola o nzelá ya mobúlú, kolanda mpósá ya nzóto, kolángwa masanga, kolía na lokósó, komele leká ndelo mpé kokúmisa bikeko bya banzámbe ba lokutá. | |
I Pe | LinVB | 4:4 | Sikáwa bapagáno bazalí kokámwa na bomóni ’te botíkí komípésa elongó na bangó o makambo maye mapusí mabé ; yangó wâná bakofíngaka bínó. | |
I Pe | LinVB | 4:5 | Kasi bakobima o míso ma Nzámbe óyo alingí áyâ kokáta makambo ma bato bánso, baye bazalí na bomoi ná baye bawá. | |
I Pe | LinVB | 4:6 | Bobélé na ntína êná Krístu asangélákí Nsango Elámu mpé na bato bawá ; bázwa bôngó bomoi bwa Nzámbe boútí na Elímo, atâ bato basílákí kosámbisa bangó. | |
I Pe | LinVB | 4:7 | Nsúka ya makambo mánso ekómí penepene. Yangó wâná bózala na bwányá mpé na míntéi mpô ’te bókoka kosámbela Nzámbe. | |
I Pe | LinVB | 4:8 | Libosó mpenzá bótía moléndé na bolingani, zambí masúmu míngi makolímbama mpô ya bolingani. | |
I Pe | LinVB | 4:10 | Bósálisa báníngá, moto na moto engébéné na ngrásya azwí, bŏ ebongí na bato bakokéngeleke makabo ebelé ma Nzámbe. | |
I Pe | LinVB | 4:11 | Moto asakólí, áyéba ’te asakólí maloba ma Nzámbe ; moto óyo asálélí báníngá, áyéba ’te Nzámbe moto apésí yě ngúyá ya kosála bôngó mpô ’te o makambo mánso Nzámbe ázwa lokúmu mpô ya Yézu Krístu ; na Yě nkémbo mpé ngúyá o bileko na bileko. Amen. | |
I Pe | LinVB | 4:12 | Bandeko ba bolingo, bókámwa té na bomóni ’te móto monéne mozalí kopela o káti ya bínó mpô ya komeka mitéma mya bínó, lokóla likambo linéne likwêlí bínó. | |
I Pe | LinVB | 4:13 | Kasi bósepela, zambí bozalí koyóka mpási elongó na Krístu, mpô ’te bínó mpé bósepela na nsáí enéne mokolo yě akoyâ na nkémbo ya yě enéne. | |
I Pe | LinVB | 4:14 | Esengo na bínó sókó bafíngí bínó mpô ya nkómbó ya Krístu ; elakísí ’te Elímo wa nkémbo, Elímo wa Nzámbe akitélí bínó. | |
I Pe | LinVB | 4:15 | Sókó mŏ kó wa bínó asengélí koyóka mpási, ézala té mpô azalí mobomi tŏ moyíbi, tŏ mpô asálí móníngá mabé tŏ akótí o makambo ma bato basúsu. | |
I Pe | LinVB | 4:16 | Kasi sókó ayókí mpási mpô azalí mokrístu, áyóka nsóni té, kasi ákúmisa Nzámbe áwa bapésí yě nkómbó eye. | |
I Pe | LinVB | 4:17 | Eleko Nzámbe akosámbisa bato elingí ékoka, akosámbisa bato ba Nzámbe libosó. Sókó akosámbisa bísó libosó, ndéngé níni ekosúkela bato babóyí koyamba Nsango Elámu ya Nzámbe ? | |
I Pe | LinVB | 4:18 | Sókó moto wa bosémbo akobíka sé na kwókósó, moto óyo abóyí Nzámbe mpé mosúmuki bakokí ndé kobíka ? | |