Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I PETER
1 2 3 4 5
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 2
I Pe LinVB 2:1  Bóbóya mabé mánso : mambí ma lokutá, ma bokósi mpé ma zúwa ; bótóngo báníngá té.
I Pe LinVB 2:2  Lokóla bána babótámí sika bakolukaka mabéle, bínó mpé bóluka komíléisa na Liloba lya Nzámbe mpô ’te bókóla o nzelá ya libíkí.
I Pe LinVB 2:3  Sôló, bosílí bomekí bolámu bwa Nzámbe, boyébí bwangó.
I Pe LinVB 2:4  Bóbeleme na Mokonzi Yézu, Yě azalí libángá lya bomoi, liye bato babwákákí ; kasi Nzámbe aponí lyangó, mpô ayébí motúya mwa lyangó.
I Pe LinVB 2:5  Bínó mpé bozalí mabángá ma bomoi, bóndima ’te bátónga na bínó Témpelo ya elímo. Bǒ banganga Nzámbe basántu bóbonza mabonza maye makosepelisa Nzámbe mpô ya Yézu Krístu.
I Pe LinVB 2:6  Mpô ekomámí o Minkandá Misántu ‘te : Nakotía o Síon libángá liye naponí, lizalí libángá lya motúya likokú­mba ndáko mobimba ; moto akotía motéma na libángá liye, akosúka mabé té.
I Pe LinVB 2:7  Yě ndé lokúmu la bínó bayambi, kasi mpô ya baye bayambí té ekomámí ’te : Libángá likokúmba ndáko mobimba, liye batóngi-ndáko babwákákí,
I Pe LinVB 2:8  likómí libakú, libángá likokwêisa bato. Baye bayambí Liloba lya Nzámbe té, bakotúta libakú na lyangó. Ut’o kala esengélákí kosálema sé bôngó.
I Pe LinVB 2:9  Kasi bínó bozalí ekólo eye eponómí, libótá lya banganga Nzámbe, ekólo esántu, ekólo ya Nzá­mbe­méí. Boponómí mpô ’te bósakola bikelá bya Yě binéne ; Yě moto alongólí bínó o molílí mpé abyángí bínó penepene na mwínda mwa yě mwa nkémbo.
I Pe LinVB 2:10  Libosó bozalákí ekólo té, kasi sikáwa bokómí libótá lya Nzámbe mpe­nzá. Libosó ayókélákí bínó ngolu té, kasi sikáwa ayókélí bínó ngolu.
I Pe LinVB 2:11  Bandeko ba bolingo, bozalí sé bampaya, bato ba mobémbo. Yangó wâná nabóndélí bínó : bóbóya mpósá ebé ya nzóto eye ekobundisaka milímo mya bínó.
I Pe LinVB 2:12  Bózala na ezalela elámu o ntéi ya bapagáno ; bôngó baye batóngí bínó ’te bosálí mabé, áwa bakomóno ’te bokosálaka malámu, bákúmisa Nzámbe o mokolo akoyâ.
I Pe LinVB 2:13  Bótósa bakonzi ba letá mpô ya Krístu, ézala mokonzi monéne óyo alekí bato bánso,
I Pe LinVB 2:14  ézala bayángeli baye mokonzi atíndí mpô ’te bápésa etúmbu na baye basálí mabé mpé bákúmisa baye bakosálaka malámu.
I Pe LinVB 2:15  Nzámbe alingí ’te bósála malámu, bókangisa bôngó minoko mya bato bazángí mayéle mpé mya baye bayébí elóko té.
I Pe LinVB 2:16  Bózala na ezalela ya bato ba bonsómí, lokóla basáleli ba Nzámbe. Bótála bonsómí té lokóla elambá ekozipa mabé ma bínó.
I Pe LinVB 2:17  Bómemya bato bánso, bólinga bandeko, bóbánga Nzámbe, bókúmisa mokonzi wa letá.
I Pe LinVB 2:18  Bínó basáli, bótósa bankóló ba bínó mpé bómemya bangó, bobélé bato balámu mpé bato ba bobóto té, kasi baye ba matáta lokóla.
I Pe LinVB 2:19  Sókó bo­nyókwámí ntína té, nzókandé bokangí mitéma mpô ya botósi Nzámbe, bosálí malámu.
I Pe LinVB 2:20  Sókó bo­kangí mitéma ntángo bapésí bínó etúmbu mpô ya mabé bosálí, bozalí na litómba té. Kasi sókó bayókísí bínó mpási mpô bosálí malámu, mpé boyambí mpási bayókísí bínó, bokosepelisa Nzámbe.
I Pe LinVB 2:21  Nzámbe abyángí bínó mpô ’te bósála bôngó, zambí Krístu ayókákí mpási mpô ya bínó mpé apésí bínó ndakisa mpô ’te bólanda nzelá ya yě.
I Pe LinVB 2:22  Yě asálí lisúmu lyŏ kó té, abúkákí lokutá atâ mbala yŏ kó té.
I Pe LinVB 2:23  Ntá­ngo bafíngákí yě, azóngísákí liloba lyŏ kó té ; ntángo banyókólókí yě, akánélákí moto mŏ kó té ; kasi amítíkákí o mabóko ma Oyo akokátaka makambo mánso na bosémbo.
I Pe LinVB 2:24  Ntángo ayókí mpási ya nzó­to o kurúse amemí masúmu ma bísó, mpô tókoka kobóya masúmu maye makoyêla bísó liwá, mpé tókoka kozala na bomoi na ezalela ya bosémbo. Ya sôló, bobíkí mpô ya mpótá ya yě.
I Pe LinVB 2:25  Bozalákí lokóla mpatá ibúngámá, kasi sikáwa bozóngélí mokéngeli óyo akobátelaka milímo mya bínó.