Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 19
II C LinVB 19:1  Yozafat, mokonzi wa Yuda, azongi o Yeruzalem nzoto kolongonu.
II C LinVB 19:2  Yeku, mwana wa Kanani, momoni-makambo, akei kokutana na ye mpe atuni : « Mpo nini osalisi moto mabe, mpe olingi baye bayi­ni Yawe ? Mpo ya likambo lya­ngo nkanda ya Yawe ekokwela yo.
II C LinVB 19:3  Solo, osalaki mpe makambo malamu, mpo otumbaki makonzi ma bikeko, olongolaki mango o mokili, mpe obongisaki motema mwa yo mpo ya koluka Nzambe. »
II C LinVB 19:4  Yozafat afandi o Yeruzalem. Na nsima akei lisusu kotala bato ba ekolo ya ye, banda Berseba tee ngomba ya Efraim, mpe azongisi bato o nzela ya Yawe Nzambe wa bankoko ba ba­ngo.
II C LinVB 19:5  Atii bazuzi o ekolo mobimba mpe o bingumba binene bya Yuda.
II C LinVB 19:6  Alobi na bazuzi : « Boyeba malamu nini bokosalaka : bosambisaka bato o nkombo ya bato te, kasi o nkombo ya Yawe, oyo azali na bino o ntango bokokata makambo.
II C LinVB 19:7  Bobanga Yawe. Bosala mosala mwa bino na motema moko, zambi Yawe Nzambe wa biso andimi se makambo ma bose­mbo, akotalaka bilongi bya bato te, akoyambaka mpe mabonza te. »
II C LinVB 19:8  O Yeruzalem Yozafat atii mpe ba-Levi, banganga Nzambe na bankumu ba mabota ma Israel mpo ’te bakata makambo o nkombo ya Yawe, mpe basambisa bato ba Yeruzalem.
II C LinVB 19:9  Apesi bango bitinda bya ye, alobi : « Bosala mosala mwa bino na bobangi Yawe, na bolandi mibeko mpe na motema moko.
II C LinVB 19:10  Soko bandeko ba bino baye bafandi o bingumba, bayeli bino ata likambo nini, ezala likambo lya bobomi moto, ezala ntembe na etinda, mobeko to momeseno mwa mboka, boteya bango mateya ma solo mpo ’te bameme ngambo te o miso ma Yawe, bongo nkanda ya Yawe ekwela bino na bandeko ba bino te. Bosala se bongo mpe bokomeme ngambo te.
II C LinVB 19:11  Amaria, nganga Nzambe mokonzi, azali kapita wa bino o makambo ma­nso matali Yawe, mpe Zebadia, mwana wa Yismael, mokonzi wa libota lya Yuda, akosamba makambo ma­nso matali mokonzi. Ba-Levi bakokoma makambo manso o minkanda. Bokokisa mosala mwa bino na mpiko. Yawe azala na moto wa bose­mbo ! »