Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 10
II C LinVB 10:1  Roboam akei o Sikem, zambi ba-Israel banso bakendeki o Sikem mpo ya kolubola ye mokonzi.
II C LinVB 10:2  Yeroboam, mwana wa Nebat, ayo­ki yango ntango azalaki naino o Ezipeti, esika akimaki mpo afanda mo­sika na mokonzi Salomo. Bongo alongwi o Ezipeti.
II C LinVB 10:3  Batindi bato mpo ya kobenga ye ; ayei elongo na ba-Isra­el banso. Balobi na Roboam :
II C LinVB 10:4  « Tata wa yo amemisaki biso mokumba monene ; yo sikawa longola ndambo ya mosala makasi mpe mokumba bozito tata wa yo atielaki biso, bongo tokosalela yo. »
II C LinVB 10:5  Roboam alobi na bango : « Bokende naino kofanda mikolo misato, na nsima bozonga epai ya ngai. » Bango bakei.
II C LinVB 10:6  Mokonzi Roboam abengi bankumu, baye bazalaki kosalela tata wa ye Salomo, atuni bango : « Bokanisi nini ? Napesa bango eyano nini ? »
II C LinVB 10:7  Bazo­ngisi : « Soko osali bango malamu, soko oyokisi bango esengo mpe olobi na bango maloba ma boboto, bakosalela yo seko. »
II C LinVB 10:8  Kasi Roboam aboyi kolanda malako ma bankumu mpe atuni bilenge ba mboka, baye bakolaki na ye esika yoko mpe bazalaki kosalela ye.
II C LinVB 10:9  Atuni bango : « Bino bokanisi nini ? Eyano nini nakoki kopesa bato balobaki na ngai : ‘Longola nda­mbo ya mosala makasi tata wa yo atindaki biso’ ? »
II C LinVB 10:10  Bilenge, baye bako­laki na ye esika yoko, bazongiseli ye : « Bato balobaki na yo : “Tata wa yo amemisaki biso moku­mba monene, kasi yo longola ndambo ya mosala makasi”, oyanola bango : Mosapi mwa ngai moke moleki loketo la tata wa ngai na bonene !
II C LinVB 10:11  Tata wa ngai ame­misaki bino mokumba monene, ngai nakobakisa naino bozito ; tata wa ngai azalaki kobete bino fimbo, ngai nakobete bino fimbo na nzube ya bibende. »
II C LinVB 10:12  Nsima ya mikolo misato Yero­boam na bato ba ye bayei epai ya Roboam, mpo alobaki na bango : « Bozonga epai ya ngai nsima ya mikolo misato. »
II C LinVB 10:13  Mokonzi Roboam apesi ba­ngo eyano ebe, aboyi lilako bankumu bapesaki ye.
II C LinVB 10:14  Andimi lilako lya bilenge mpe alobi na bango : « Tata wa ngai amemisaki bino mokumba bozito, ngai nakobakisa naino bozito ; tata wa ngai abeteki bino fimbo, ngai nakobete bino fimbo na nzube ya bibende. »
II C LinVB 10:15  Mokonzi aboyi koyoka maloba ma bato ; yango elakisi boniboni Nza­mbe akoti o likambo mpo ’te akokisa liloba atiaki o monoko mwa Akia wa Silo, oyo alobaki na Yero­boam, mwana wa Nebat.
II C LinVB 10:16  Awa mokonzi aboyi kondima maloba ma ba-Israel, bazongiseli ye maloba maye : « Biso na Davidi, bondeko bosili ! Biso tokowela biloko bya mwana wa Yese te ! Bato ba Israel, bozonga o bie­ma bya bino ! Sikawa, Davidi, yo moko obatela libota lya yo ! » Ba-Israel banso bazongi o biema bya bango.
II C LinVB 10:17  Kasi Roboam akobi koya­ngela bana ba Israel, baye bafandi o mboka inso ya Yuda.
II C LinVB 10:18  Mokonzi Roboam atindeli bango Adoram, kapita wa bangamba, kasi bana ba Israel ba­bwakeli ye mabanga mpe babomi ye. Mokonzi Roboam abuti likalo noki mpe akimi o Yeruzalem.
II C LinVB 10:19  Bongo ba-Israel baboyi libota lya Davidi tee lelo.