Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 31
II C LinVB 31:1  Esilisi bango makambo mana, ba-Israel banso bazalaki wana bakei o bingumba binso bya Yuda, babuki bikeko binso bya mabanga mpe bya nzete, babebisi bisika bya kokumisa banzambe basusu na bi­tumbelo, balongoli byango bipai bi­nso o mikili mya Yuda, Benyamin, Efraim na Manase. Na nsima ba-Israel banso bazongi o mboka ya ba­ngo, moto na moto o etuka ya ye.
II C LinVB 31:2  Ezekia abongisi lisusu mangomba ma banganga Nzambe mpe ma ba-Levi. O lingomba lya bango, apesi banganga Nzambe na ba-Levi, moto na moto mosala mwa ye : kobonza mabonza ma kotumba to miboma mya bondeko, kokamba losambo, ko­tondo Nzambe to kokumisa Yawe na nzembo penepene na bizibeli bya ndako ya Yawe.
II C LinVB 31:3  Mokonzi apesi nda­mbo ya mosolo mwa ye moko mpo ya mabonza ma ntongo mpe ma mpokwa, mpo ya maye ma mokolo mwa Sabato mpe maye ma mikolo mya nsuka ya sanza to ma biyenga, lokola ekomami o Mobeko mwa Yawe.
II C LinVB 31:4  Na nsima alobi na bato ba Yeruzalem ’te bapesa banganga Nzambe na ba-Levi manso masengeli na ba­ngo mpo ’te bakoka kotosa mibeko mya Yawe.
II C LinVB 31:5  Nsima ya maloba mana, bana ba Israel bayei kobonza mbuma ya yambo ya mampa, ya vino, ya mafuta, ya mafuta ma nzoi na mbuma inso ya bilanga ; bapesi eteni ya zomi ya biloko binso.
II C LinVB 31:6  Mpe bana na Israel mpe ba Yuda, baye bafandi o mboka ya Yuda, bayei na eteni ya zomi ya ngombe na mpata, na eteni ya zomi ya biloko bisantu babonzeli Yawe. Batii binso o mipiko.
II C LinVB 31:7  Babandi kosangisa biloko o sanza ya isato tee sanza ya nsambo.
II C LinVB 31:8  Ezekia na bankumu bayei kotala mipiko mpe bakumisi Yawe na Israel ekolo ya ye.
II C LinVB 31:9  Eze­kia atuni banganga Nzambe na ba-Levi mpo ya mipiko mina.
II C LinVB 31:10  Nga­nga Nzambe mokonzi Azaria, wa libota lya Sadok, ayanoli ye : « Ut’o mo­kolo babandi kopesa biloko mpo ya Tempelo ya Yawe, tolei mpe totondi ; ata bongo biloko bitikali naino mi­ngi, mpo Yawe abenisi bato ba ye ! Tala biloko ebele bitikali ! »
II C LinVB 31:11  Ezekia atindi ’te babongisa bisika bya ko­bomba biloko o Tempelo ya Yawe ; bo­ngo babongisi byango.
II C LinVB 31:12  Bayei na biloko, na biteni bya yambo na mabonza. Mo-Levi Konanya azalaki kapita wa bisika bina ; nsima ya ye ndeko wa ye Simei.
II C LinVB 31:13  Yekiel, Azazia, Nakat, Asael, Yerimot, Yozabad, Eliel, Yismakia, Makat na Benaya bazalaki bake­ngeli ; Konanya na ndeko wa ye Simei bazalaki kotala bango lokola mokonzi Ezekia na Azaria, moya­ngeli wa Tempelo ya Yawe, bazalaki kotinda.
II C LinVB 31:14  Mo-Levi Kore, mwana wa Yimna, mokengeli wa ezibeli ya Esti, azalaki koyamba mabonza maye bato bazalaki kopesa Yawe. Ye moto azalaki kokabola mabonza mana na mpe biloko bileki bisantu.
II C LinVB 31:15  O bingumba bya banganga Nzambe Eden, Minyamin, Yesua, Semaya, Amaria na Sekania bazalaki kosalisa ye mpo ya bakokabela bandeko ba bango biloko, ná bato banene ná bato bake :
II C LinVB 31:16  babali, ata ba lingomba nini, bayebakokisi mibu ntuku isato basengelaki koke­nde kosala mosala mwa Nzambe o Te­mpelo ya Yawe, o mokolo mwa ba­ngo, lokola bakabolaki mwango o mangomba.
II C LinVB 31:17  Banganga Nzambe bakomami engebene na libota lya tata, ba-Levi, baye bakokisi mibu ntuku ibale, engebene na lingomba mpe na misala mya bango.
II C LinVB 31:18  Bazalaki kokoma libota mobimba : basi mpe bana ba­bali na bana basi, soko bamibongisi solo mpo ya mosala mwa mambi masantu.
II C LinVB 31:19  Baponoki mpe bato o mboka yoko yoko ya ekolo mpo ’te bapesa biloko bya kolia na banganga Nzambe, bana ba Arone, baye bafa­ndi o bisobe pene na mboka, mpe na ba-Levi baye bakomami.
II C LinVB 31:20  Ezekia asali bongo o mokili mobimba mwa Yuda ; abongisi mosala mwa ye malamu mpe na bosembo o miso ma Yawe Nzambe wa ye.
II C LinVB 31:21  O misala minso azalaki kosala mpo ya Tempelo ya Yawe, mpo ya Mobeko mpe mpo ya mitindo mya Nzambe, aluki se kosepelisa Nzambe wa ye na motema moko ; asilisi mosala mwa ye malamu.