II CHRONICLES
Chapter 19
| II C | LinVB | 19:2 | Yeku, mwana wa Kanani, momoni-makambo, akei kokutana na ye mpe atuni : « Mpo nini osalisi moto mabe, mpe olingi baye bayini Yawe ? Mpo ya likambo lyango nkanda ya Yawe ekokwela yo. | |
| II C | LinVB | 19:3 | Solo, osalaki mpe makambo malamu, mpo otumbaki makonzi ma bikeko, olongolaki mango o mokili, mpe obongisaki motema mwa yo mpo ya koluka Nzambe. » | |
| II C | LinVB | 19:4 | Yozafat afandi o Yeruzalem. Na nsima akei lisusu kotala bato ba ekolo ya ye, banda Berseba tee ngomba ya Efraim, mpe azongisi bato o nzela ya Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. | |
| II C | LinVB | 19:6 | Alobi na bazuzi : « Boyeba malamu nini bokosalaka : bosambisaka bato o nkombo ya bato te, kasi o nkombo ya Yawe, oyo azali na bino o ntango bokokata makambo. | |
| II C | LinVB | 19:7 | Bobanga Yawe. Bosala mosala mwa bino na motema moko, zambi Yawe Nzambe wa biso andimi se makambo ma bosembo, akotalaka bilongi bya bato te, akoyambaka mpe mabonza te. » | |
| II C | LinVB | 19:8 | O Yeruzalem Yozafat atii mpe ba-Levi, banganga Nzambe na bankumu ba mabota ma Israel mpo ’te bakata makambo o nkombo ya Yawe, mpe basambisa bato ba Yeruzalem. | |
| II C | LinVB | 19:9 | Apesi bango bitinda bya ye, alobi : « Bosala mosala mwa bino na bobangi Yawe, na bolandi mibeko mpe na motema moko. | |
| II C | LinVB | 19:10 | Soko bandeko ba bino baye bafandi o bingumba, bayeli bino ata likambo nini, ezala likambo lya bobomi moto, ezala ntembe na etinda, mobeko to momeseno mwa mboka, boteya bango mateya ma solo mpo ’te bameme ngambo te o miso ma Yawe, bongo nkanda ya Yawe ekwela bino na bandeko ba bino te. Bosala se bongo mpe bokomeme ngambo te. | |
| II C | LinVB | 19:11 | Amaria, nganga Nzambe mokonzi, azali kapita wa bino o makambo manso matali Yawe, mpe Zebadia, mwana wa Yismael, mokonzi wa libota lya Yuda, akosamba makambo manso matali mokonzi. Ba-Levi bakokoma makambo manso o minkanda. Bokokisa mosala mwa bino na mpiko. Yawe azala na moto wa bosembo ! » | |