Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 18
II C LinVB 18:1  Yozafat akomi moto wa nkita mpe wa lokumu lonene. Abali ndeko wa Akab, akomi semeki wa ye.
II C LinVB 18:2  Nsima ya mwa mibu akei kotala Akab o Samaria. Akab abomeli ye na bato ba ye mpata na ngombe ebele mpo ’te andimisa Yozafat ake­nde kobundisa Ramot o Galaad.
II C LinVB 18:3  Akab, mokonzi wa Israel, alobi na Yozafat, mokonzi wa Yuda : « Olingi kokende na biso elongo mpo tobu-ndisa Ramot o Galaad ? » Ayanoli : « Ngai nakosala se lokola yo, bato ba ngai bakosala lokola bato ba yo ; tokozala na yo o ntango ya etumba. »
II C LinVB 18:4  Nzokande alobi na mokonzi wa Israel : « Otuna liboso Yawe soko akoloba nini ! »
II C LinVB 18:5  Mokonzi wa Israel asa­ngisi baprofeta nkama inei, alobi na bango : « Tokende kobundisa Ramot o Galaad to tokende te ? » Bayanoli : « Ke­nde, Nzambe akokaba bango o maboko ma mokonzi. »
II C LinVB 18:6  Yozafat atuni : « Profeta mosusu wa Yawe azali awa te mpo totuna ye ? »
II C LinVB 18:7  Mokonzi wa Israel ayanoli Yozafat : « Moto mo­susu azali, oyo akoki kotuna Yawe, kasi ngai nayini ye, mpo ata mbala yoko te asakoli malamu ma ngai, se makambo mabe. Nkombo ya ye Mikea, mwana wa Yimla. » Yozafat alobi : « Mokonzi, oloba bongo te ! »
II C LinVB 18:8  Mo­konzi wa Israel abengi mosaleli moko, alobi na ye : « Benga noki Mikea, mwana wa Yimla. »
II C LinVB 18:9  Mokonzi wa Israel na Yozafat mokonzi wa Yuda balati bilamba bya lokumu mpe bakei kofanda, moto na moto o ngwende ya ye, o boso bwa ezibeli ya mboka. Baprofeta banso bazalaki kolendisana mpo ’te basakola makambo o miso ma bango.
II C LinVB 18:10  Sedekia, mwana wa Kenana, oyo asalaki maseke ma bibende, alobi : « Yawe asakoli bongo : Na maseke maye okosilisa bato ba Aram tee moto wa nsuka. »
II C LinVB 18:11  Baprofeta banso basakoli se bo­ngo, balobi : « Kende o Ramot ya Galaad, mpe okolonga ! Yawe akokaba yango o maboko ma mokonzi. »
II C LinVB 18:12  Ntoma oyo akendeki kobenga Mikea alobi na ye : « Baprofeta banso basakoli se monoko moko ’te mokonzi akolonga. Yo mpe oloba se lokola bango ! Osakola bobele makambo malamu ! »
II C LinVB 18:13  Mikea alobi : « Lokola Yawe azali na bomoi, maloba Yawe akoloba, ngai mpe nakoloba mango ! »
II C LinVB 18:14  Akomi epai ya mokonzi, oyo atuni ye : « Mikea, tokoki kokende kobu­ndisa Ramot o Galaad to te ? » Ayanoli : « Bokende, bokolonga. Yawe akokaba yango o maboko ma bino. »
II C LinVB 18:15  Mokonzi alobi na ye : « Mbala boni nalayisa yo ndai ’te oloba na ngai se makambo ma solo o nkombo ya Yawe ? »
II C LinVB 18:16  Mikea asakoli boye : « Namoni ba-Israel banso bapanzani o ngomba lokola etonga ya mpata izangi mokengeli. Yawe alobi : Bazali na mokonzi lisusu te, bongo moto na moto azonga o mboka ya ye na boboto ! »
II C LinVB 18:17  Mokonzi wa Israel alobi na Yozafat : « Omoni, nalobaki na yo te ’te moto oyo akosakolaka malamu ma ngai te, se makambo mabe ? »
II C LinVB 18:18  Mikea alobi : « Yoka maloba ma Yawe : Namoni Yawe afandi o ngwende ya bokonzi. Banzelu banso ba likolo batelemi penepene na ye, epai ya mobali mpe epai ya mwasi.
II C LinVB 18:19  Yawe atuni : “Nani akokosa Akab mpo ’te akende kobundisa Ramot o Galaad, bongo akufa kuna ?” Bazalaki kozongisa biyano ndenge na ndenge.
II C LinVB 18:20  Na nsima anzelu moko abimi mpe atelemi o boso bwa Yawe, alobi : “Ngai moto nakokosa ye.” Yawe atuni ye : “Okosala ndenge nini ?”
II C LinVB 18:21  Azongisi : “Nakokende mpe nakozala anzelu wa lokuta o monoko mwa baprofeta banso.” Yawe alobi na ngai : “Kende kokosa ye, okolonga. Kende mpe sala se bo­ngo.”
II C LinVB 18:22  Awa Yawe atii anzelu wa lokuta o monoko mwa baprofeta baye ba yo, elakisi ’te ye moko asakoli makambo mabe mpo ya yo. »
II C LinVB 18:23  Sedekia, mwana wa Kenana, abelemi mpe abeti Mikea o litama, alobi na ye : « Anzelu wa Yawe alongwi epai ya ngai o nzela nini mpo aya koloba na yo ? »
II C LinVB 18:24  Mikea azongisi : « Okoyeba yango mokolo okokima mpo oluka ndako ya kobombama. »
II C LinVB 18:25  Mokonzi wa Israel alobi : « Kanga Mikea mpe kaba ye o maboko ma Amon, moyangeli wa mboka, mpe ma Yoas, mwana wa mokonzi.
II C LinVB 18:26  Yebisa bango : Mokonzi atindi ’te bokotisa moto oyo o boloko, bopesa ye se mwa mampa na mai tee mokolo nakozo­nga awa nzoto kolongonu. »
II C LinVB 18:27  Mikea alobi na ye : « Soko obiki mpe ozongi nzoto kolongonu, okoyeba ’te Yawe alobaki na monoko mwa ngai te. » Na nsima abakisi : « Bino banso boyoka malamu. »
II C LinVB 18:28  Mokonzi wa Israel na Yozafat mokonzi wa Yuda bakei o Ramot ya Galaad.
II C LinVB 18:29  Mokonzi wa Israel alobi na Yozafat : « Ngai nakolata bilamba bya soda mpo nakende etumba. Kasi yo lata bilamba bya mokonzi. » Moko­nzi wa Israel alati bilamba bya soda mpe akei etumba.
II C LinVB 18:30  Mokonzi wa Aram apesaki bakomanda ba basoda ba makalo etinda eye : « Boluka moto mosusu te, boluka se kobunda na mokonzi wa Israel. »
II C LinVB 18:31  Yango wana, awa bakomanda ba basoda ba makalo bamoni Yozafat, balobi : « Ntembe te, ye azali mokonzi wa Israel. » Bo­ngo bazingi ye mpo ya kobundisa ye. Kasi Yozafat abandi koganga. Yawe asalisi ye mpe alongoli Yozafat o kati ya bango.
II C LinVB 18:32  Bakomanda ba basoda ba makalo bamoni ’te ye azalaki mokonzi wa Israel te, bongo batiki kobunda na ye.
II C LinVB 18:33  Kasi moto moko akamati litimbo lya ye mpo ya kobete monguna. Likula likoteli mokonzi wa Israel o kati ya mitako mikangisi molato mwa bibende. Mokonzi alobi na motambwisi likalo : « Kende mpe­mbeni mpe longola ngai o esika ya etumba, mpo nazoki. »
II C LinVB 18:34  O mokolo mona etumba engali makasi mpenza ; yango wana mokonzi wa Israel ase­ngelaki koteleme o likalo lya ye o miso ma bato ba Aram, tee mpokwa. Ntango moi mobandi kokita, akufi.