Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 28
II C LinVB 28:1  Akaz akokisi mibu ntuku ibale o ntango akomi moko­nzi ; ayangeli ekolo mibu zomi na motoba o Yeruzalem. Asali malamu te o miso ma Yawe lokola nkoko wa ye Davidi asalaki.
II C LinVB 28:2  Kasi alandi nzela ya bakonzi ba Israel, asaleli mpe Baal bikeko.
II C LinVB 28:3  Yemei atumbi mpaka ya malasi o lobwaku la Ben-Inom, mpe atumbi bana ba ye, alandi bongo mimeseno mya nsomo mya bikolo biye Yawe abenganaki o boso bwa ba-Israel.
II C LinVB 28:4  Abonzi miboma mpe atumbi mpaka ya malasi o bisika bya kokumisa banzambe basusu, o ngomba inso mpe o nse ya nzete ibesu inso.
II C LinVB 28:5  Yawe Nzambe wa ye akabi ye o maboko ma mokonzi wa Aram. Mokonzi wa Aram alongi ye, akangi basoda ebele, mpe akambi bango bo baombo o Damasko. Bakabi Akaz o maboko ma mokonzi wa Israel, oyo akweisi ye.
II C LinVB 28:6  Peka, mwana wa Remalia, abomi bato ba Yuda nkoto mo­nkama na ntuku ibale se o mokolo moko, zambi batikaki Yawe Nzambe wa bankoko ba bango.
II C LinVB 28:7  Zikri, elo­mbe wa Efraim, abomi Maseya, mwa­na wa mokonzi, na Azrikam, moya­ngeli wa ndako ya mokonzi, na Elkana, moyangeli wa mokonzi.
II C LinVB 28:8  Ba-Israel bakangi bandeko ba bango nkoto nkama ibale, basi, bana babali na bana basi ; babotoli mpe biloko ebele mpe bamemi byango o Samaria.
II C LinVB 28:9  Ezalaki wana profeta wa Yawe, nkombo ’te Oded. Akei kozwana na basoda bayei o Samaria, alobi na bango : « Yawe Nzambe wa bankoko ba bino ayokeli bato ba Yuda nkanda ; yango wana akabi bango o maboko ma bino, kasi bino bobomi bango na nkanda ; Nzambe akoki kondima ya­ngo soki moke te.
II C LinVB 28:10  Sikawa bolingi kokomisa bana ba Yuda mpe ba Yeruzalem, babali na basi, baombo ba bino ! Kasi bino moko bosali mabe maleki o miso ma Yawe Nzambe wa bino.
II C LinVB 28:11  Yango wana boyoka ngai malamu, bozongisa baombo baye bokangaki o kati ya bandeko ba bino, soki te, Yawe akosilikela bino makasi ! »
II C LinVB 28:12  Bankumu basusu ba Efraim : Azaria, mwana wa Yokanan, Berekia, mwana wa Mesilemot, Yekizkia, mwana wa Salum, na Amasa, mwana wa Adlai, basiliki na basoda bauti o bitumba.
II C LinVB 28:13  Balobi na bango : « Bokotisa baombo o engumba te ; soko bosali bongo, tokosala mabe o miso ma Yawe ; bokobakisa bobe likolo lya masumu ma biso, maye masili makomi maike mpenza, mpe Yawe akoyokela biso ba-Israel nkanda. »
II C LinVB 28:14  Yango wana o miso ma bakomanda mpe ma bato banso, basoda batiki baombo na biloko binso babotoloki.
II C LinVB 28:15  Na nsima baponi bato mpo ya kosalisa bao­mbo : balatisi baye bazalaki bolumbu bilamba na sapato, biye babotoloki o etumba, mpe bapesi bango biloko bya bolei mpe bya bomeli, na mpe mafuta ma bopakoli nzoto. Bakei na bango tee Yeriko, mboka ya mbila, esika bandeko ba bango bafandi ; baye bakoki kotambola lisusu te, babutisi bango o mpunda. Na nsima bazongi o Samaria.
II C LinVB 28:16  O mikolo mina mokonzi Akaz atindi bato epai ya bakonzi ba Asur mpo ’te baya kosalisa ye.
II C LinVB 28:17  Ba-Edom bayingeli lisusu o Yuda, bakitisi ba­ngo mpe bakangi bango o boombo.
II C LinVB 28:18  Ba-Filisti mpe bayei kobundisa mboka ya mokili epai ya mbu mpe o Negeb, mokili mozalaki mwa bato ba Yuda. Babotoli Bet-Semes, Ayalon, Gederot, Soko, Timna, Gimzo, na mboka ya penepene, bongo bakomi kofanda kuna.
II C LinVB 28:19  Solo, Yawe apesi Yuda etumbu mpo ya masumu ma Akaz, mokonzi wa ekolo, zambi atikaki ba-Yuda basala se mabe mpe atosaki Yawe te.
II C LinVB 28:20  Teglat-Falasar, mokonzi wa Asur ayei, kasi esika ’te asalisa Akaz, abu­ndi na ye etumba mpe azingi mboka.
II C LinVB 28:21  Akaz abotoli biloko bisusu bya Tempelo ya Yawe na biloko bya mokonzi mpe bya bankumu ; apesi bya­ngo na mokonzi wa Asur, kasi ata bongo, azwi lisalisi te.
II C LinVB 28:22  O ntango banguna bazalaki kozinga mboka, mokonzi Akaz apusi kotumola Yawe ;
II C LinVB 28:23  abonzeli banzambe ba Damasko miboma, ata bakweisaki ye o etumba. Alobi : « Awa banzambe ba bakonzi ba Aram bapesi bango maboko, ngai mpe nakobonzela bango mabonza mpo ’te baya kosalisa ngai. » Kasi bango bazalaki kobebisa ye na mpe Israel mobimba.
II C LinVB 28:24  Akaz abotoli biloko binso bya Tempelo ya Yawe mpe abuki bisusu. Akangi bizibeli bya Tempelo ya Yawe mpe atongi bitumbelo o balabala inso ya Yeruzalem.
II C LinVB 28:25  O bingumba binso bya Yuda atongi bisika bya kokumisa banza­mbe mpo ’te bato batumbela ba­nza­mbe basusu mpaka ya malasi ; ayokisi bongo Yawe, Nzambe wa ba­nkoko ba ye, nkanda.
II C LinVB 28:26  Makambo masusu na misala mya ye, ut’o miye mya liboso na tee miye mya nsuka, mikomami o buku ya Bakonzi ba Yuda mpe ba Israel.
II C LinVB 28:27  Akaz akei kokutana na bankoko ba ye. Bakundi ye o engumba ya Yeruzalem, kasi o malita ma bakonzi ba Israel te. Mwana wa ye Ezekia akitani ye.