Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 20
II C LinVB 20:1  Nsima yango, ba-Moab na ba-Amon bakei elongo na ba-Maon kobundisa Yozafat.
II C LinVB 20:2  Bakei koyebisa Yozafat, balobi : « Basoda ebele bakoya kobundisa yo ; bakouta o ngambo ya mbu, o mokili mwa Edom ; tala, basili bakomi o Kasason-Tamar, eye ekomi En-Gadi. »
II C LinVB 20:3  Yozafat abangi ; akani kotuna Yawe mpe atindi ba-Yuda banso balala nzala.
II C LinVB 20:4  Bato ba Yuda basangani mpo bazwa lisalisi lya Yawe ; bauti o bingumba binso bya Yuda mpo ya kobondela Yawe.
II C LinVB 20:5  Yozafat atelemi o likita lya bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem o Tempelo ya Yawe o boso bwa mbalasani ya sika.
II C LinVB 20:6  Asambeli : « E Yawe Nzambe wa bankoko ba biso, yo ozali Nzambe kuna o likolo, yo moto okoyangelaka bakonzi ba bikolo binso. Nguya na bokasi bozali o loboko la yo ; mpe moto moko akoki na yo te.
II C LinVB 20:7  Yo Nzambe wa biso, obenganaki bato bafandaki o mokili moye o miso ma bato ba yo Israel, mpe opesaki mokili moye seko na bankoko ba Abarama, ndeko wa yo.
II C LinVB 20:8  Bayei ko­fanda awa mpe batongeli yo Te­mpe­lo, mpe balobi :
II C LinVB 20:9  Soko makambo ma mpasi makweli biso, kanisa : bitumba na mopanga, etumbu, bokono bobe to nzala, tokoya koteleme liboso lya Tempelo eye o miso ma yo, zambi Nkombo ya yo ezali o Tempelo eye. Awa tokobelela yo o ntango ya mpasi ya biso, okondimela biso mpe okobikisa biso.
II C LinVB 20:10  Tala sikawa ba-Amon, ba-Moab na bato ba ngo­mba ba Seir bayei. Opesaki ba-Israel nzela ya kokoto o mokili mwa bango te o ntango babimaki o mokili mwa Ezipeti, yango wana balekaki se mpe­mbeni mpe babomaki bango te.
II C LinVB 20:11  Mpe tala, bazongiseli biso malamu te, bayei kobengana biso o mokili opesaki biso.
II C LinVB 20:12  E Nzambe wa biso, okopesa bango etumbu te ? Biso tozangi makasi o boso bwa bato ebele bayei kobunda na biso. Toyebi te boniboni tokoki kosala. Kasi miso ma biso se epai ya yo. »
II C LinVB 20:13  Bato banso ba Yuda batelemi o miso ma Yawe, elongo na bandeko, basi mpe bana ba bango.
II C LinVB 20:14  O kati ya bato basangani wana, elimo ya Yawe ekiteli Yakaziel, mwana wa Zekaria, nkoko wa Benaya, oyo Yekiel, mwana wa Matania abotaki, ye mo-Levi wa libota lya Asaf.
II C LinVB 20:15  Agangi : « Bino banso bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem, mpe yo mokonzi Yozafat, botia matoi ! Yawe alobi : Bobanga te, boyoka mpe motema nsomo te mpo ya basoda ebele boye, zambi etumba eye ezali etumba ya bino te, kasi ya Nza­mbe.
II C LinVB 20:16  Lobi bokende kobunda na bang­o. Bakoleka o ngomba Sis mpe bokozwana na bango o nsuka ya lo­bwaku penepene na eliki ya Yeruel.
II C LinVB 20:17  Bino bokosengela kobunda te : bomilakisa na bango, boteleme wana mpe bokomono libiki Yawe akopesa bino. Bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem, bobanga te mpe boyoka nsomo te ! Bokende kokutana na bango lobi mpe Yawe akozala na bino. »
II C LinVB 20:18  Yozafat akumbami, elongi o nse, se bongo bato banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem bafukami mpe bakumbameli Yawe.
II C LinVB 20:19  Ba-Levi, bana ba etuka ya Keat na bana ba etuka ya Kore, batelemi mpo bakumisa Yawe Nza­mbe wa Israel na mongongo makasi.
II C LinVB 20:20  Batelemi na nta ntongo mpe bakei o eliki ya Tekoa. Ezalaki bango koleka, Yozafat atelemi mpe alobi na bango : « Bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem, boyoka ngai ! Botia mitema na Yawe Nzambe wa bino, mpe bokobika ; boyamba baprofeta ba ye, mpe bokolonga ! »
II C LinVB 20:21  Ayokani na bato ba ye mpo batia bayembi liboso lya basoda bakokende etumba. Balata bilamba bya losambo, bakumisa Yawe mpe baye­mba : « Bokumisa Yawe, azali nta bolingi, akotika biso te. »
II C LinVB 20:22  O ntango babandi koyemba mpo ya kokumisa Nzambe, Yawe atieli ba-Amon, ba-Moab na bato ba ngo­mba ya Seir, baye bayaki kobundisa Yuda, motambo, bongo bamoni ’te bakwei.
II C LinVB 20:23  Ba-Amon na ba-Moab bakei kobundisa bato ba ngomba ya Seir mpo ’te baboma bango. Esilisi bango koboma bato ba Seir, babandi kobomana.
II C LinVB 20:24  Ekomi bato ba Yuda o nsonge ya ngomba, esika bakoki komono eliki, batali epai basoda ebele bazalaki. Talaka, ezalaki wana se bibembe bilali o nse, moto moko abiki te.
II C LinVB 20:25  Yozafat na basoda ba ye bakei kobotolo bango biloko ; bakuti bi­bwele ebele, nkita, bilamba na biloko bya motuya. Babotoli biloko mingi, kasi bakoki komeme binso te. Mikolo misato balokoti byango, bizalaki mingi mpenza.
II C LinVB 20:26  Mokolo mwa minei basangani o lobwaku la Bobenisi, zambi bakumisi Yawe o esika ena. Yango wana tee lelo bapesi lobwaku lona nkombo ’te ‘Bobenisi’.
II C LinVB 20:27  Bato banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem, Yozafat liboso, bazo­ngi o Yeruzalem na esengo enene, za­mbi Yawe asalisi bango mpo balonga banguna.
II C LinVB 20:28  Ntango bayingeli o Yeruzalem, babeti nzenze, lokombe na mi­ndule tee bakomi o Tempelo ya Yawe.
II C LinVB 20:29  Bobangi Nzambe bokoteli bakonzi banso ba bikolo, awa bayoki ’te Yawe alongaki banguna ba Israel.
II C LinVB 20:30  Bongo bokonzi bwa Yozafat bozalaki kimia ; Nzambe apesi bango boboto o ndelo inso ya mokili mwa bango.
II C LinVB 20:31  Yozafat, mwana wa Asa, ayangeli Yuda. Akokisi mibu ntuku isato na mitano o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku ibale na mitano o Yeruzalem. Nkombo ya ma­ma wa ye Azuba, mwana wa Silki.
II C LinVB 20:32  Alandi ezalela ya tata wa ye Asa, atiki nzela ena te mpe asali se malamu o miso ma Yawe.
II C LinVB 20:33  Nzokande bisika bya kokumisa banzambe basusu bikufaki te ; bato batii naino motema mobimba na Nzambe wa bankoko ba bango te.
II C LinVB 20:34  Makambo masusu ma Yozafat, ut’o maye ma liboso tee maye ma nsuka, makomami o buku ya Bikela bya Yeku, mwana wa Kanani ; bakomi mango mpe o buku ya Bakonzi ba Israel.
II C LinVB 20:35  Na nsima Yozafat, mokonzi wa Yuda, ayokani na Okozia, mokonzi wa Israel, oyo abendi ye o nzela ebe.
II C LinVB 20:36  Ayokani na ye mpo ya kotonga masuwa makokende o Tarsis. Batongi ma­suwa o Esion-Geber.
II C LinVB 20:37  Eliezer, mwana wa Dodowa wa Maresa, asakoli maloba mpo ya Yozafat, alobi : « Awa oyokani na Okozia, Yawe abebisi mosala mwa yo. » Masuwa mabukani mpe makoki kokende lisusu o Tarsis te.