II CHRONICLES
Chapter 10
| II C | LinVB | 10:1 | Roboam akei o Sikem, zambi ba-Israel banso bakendeki o Sikem mpo ya kolubola ye mokonzi. | |
| II C | LinVB | 10:2 | Yeroboam, mwana wa Nebat, ayoki yango ntango azalaki naino o Ezipeti, esika akimaki mpo afanda mosika na mokonzi Salomo. Bongo alongwi o Ezipeti. | |
| II C | LinVB | 10:3 | Batindi bato mpo ya kobenga ye ; ayei elongo na ba-Israel banso. Balobi na Roboam : | |
| II C | LinVB | 10:4 | « Tata wa yo amemisaki biso mokumba monene ; yo sikawa longola ndambo ya mosala makasi mpe mokumba bozito tata wa yo atielaki biso, bongo tokosalela yo. » | |
| II C | LinVB | 10:5 | Roboam alobi na bango : « Bokende naino kofanda mikolo misato, na nsima bozonga epai ya ngai. » Bango bakei. | |
| II C | LinVB | 10:6 | Mokonzi Roboam abengi bankumu, baye bazalaki kosalela tata wa ye Salomo, atuni bango : « Bokanisi nini ? Napesa bango eyano nini ? » | |
| II C | LinVB | 10:7 | Bazongisi : « Soko osali bango malamu, soko oyokisi bango esengo mpe olobi na bango maloba ma boboto, bakosalela yo seko. » | |
| II C | LinVB | 10:8 | Kasi Roboam aboyi kolanda malako ma bankumu mpe atuni bilenge ba mboka, baye bakolaki na ye esika yoko mpe bazalaki kosalela ye. | |
| II C | LinVB | 10:9 | Atuni bango : « Bino bokanisi nini ? Eyano nini nakoki kopesa bato balobaki na ngai : ‘Longola ndambo ya mosala makasi tata wa yo atindaki biso’ ? » | |
| II C | LinVB | 10:10 | Bilenge, baye bakolaki na ye esika yoko, bazongiseli ye : « Bato balobaki na yo : “Tata wa yo amemisaki biso mokumba monene, kasi yo longola ndambo ya mosala makasi”, oyanola bango : Mosapi mwa ngai moke moleki loketo la tata wa ngai na bonene ! | |
| II C | LinVB | 10:11 | Tata wa ngai amemisaki bino mokumba monene, ngai nakobakisa naino bozito ; tata wa ngai azalaki kobete bino fimbo, ngai nakobete bino fimbo na nzube ya bibende. » | |
| II C | LinVB | 10:12 | Nsima ya mikolo misato Yeroboam na bato ba ye bayei epai ya Roboam, mpo alobaki na bango : « Bozonga epai ya ngai nsima ya mikolo misato. » | |
| II C | LinVB | 10:14 | Andimi lilako lya bilenge mpe alobi na bango : « Tata wa ngai amemisaki bino mokumba bozito, ngai nakobakisa naino bozito ; tata wa ngai abeteki bino fimbo, ngai nakobete bino fimbo na nzube ya bibende. » | |
| II C | LinVB | 10:15 | Mokonzi aboyi koyoka maloba ma bato ; yango elakisi boniboni Nzambe akoti o likambo mpo ’te akokisa liloba atiaki o monoko mwa Akia wa Silo, oyo alobaki na Yeroboam, mwana wa Nebat. | |
| II C | LinVB | 10:16 | Awa mokonzi aboyi kondima maloba ma ba-Israel, bazongiseli ye maloba maye : « Biso na Davidi, bondeko bosili ! Biso tokowela biloko bya mwana wa Yese te ! Bato ba Israel, bozonga o biema bya bino ! Sikawa, Davidi, yo moko obatela libota lya yo ! » Ba-Israel banso bazongi o biema bya bango. | |
| II C | LinVB | 10:18 | Mokonzi Roboam atindeli bango Adoram, kapita wa bangamba, kasi bana ba Israel babwakeli ye mabanga mpe babomi ye. Mokonzi Roboam abuti likalo noki mpe akimi o Yeruzalem. | |