Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MICAH
1 2 3 4 5 6 7
Prev Up Next
Chapter 7
Mica LinVB 7:1  Mawa na ngai e, nakomi lokola mbuma babuki o elanga, lokola mbuma etikali nsima ya eleko ya bobuki ; ata mbuma yoko etikali te mpo ’te nalia, ata mbuma ya figi yoko te, eye eteli noki !
Mica LinVB 7:2  Bato ba boyambi basila o mokili, moto moko wa bosembo mpe te ! Banso bakolukaka koboma bani­nga, banso bakokanelaka baninga.
Mica LinVB 7:3  Mpo ya kosala mabe bazali na nto­ki o maboko, mosala mwa nkumu, kosenge biloko ; zuzi akokata likambo te soko a­zwi libonza te ; moto monene alingi maye makobongela ye.
Mica LinVB 7:4  O ntei ya bango ata moto malamu azali lokola nzube, mpe moto wa bosembo lokola li­kpanda. Bakengeli basili bayebisi yo ’te mokolo mwa etumbu moyei, mokolo bakobulungana mokoki.
Mica LinVB 7:5  Ondima maloba ma ndeko wa yo te, otia motema na moninga te ; okeba na mwasi apemi pene na yo, okeba na maye okoyebisa ye.
Mica LinVB 7:6  Mpamba te, mwana mobali akomi kokinola tata wa ye, mwana mwasi kotombokela mama wa ye, mwasi wa libala bokilo wa ye ; moko moko akozwa banguna se o ntei ya bandeko ba ye.
Mica LinVB 7:7  Nzokande ngai nakotalaka bobele Yawe, natii motema na Nzambe oyo akobikisa ngai, Nzambe wa ngai akoyoka ngai.
Mica LinVB 7:8  Monguna wa ngai, oseke mpasi ya ngai te ; soko nakwei, nakoteleme lisusu ; soko molili mokangi ngai Yawe azali mwinda mwa ngai.
Mica LinVB 7:9  Nasalaki mabe o miso ma ye, yango wana nasengeli koikikiza nkanda ya Yawe tee mokolo akosamba likambo lya ngai mpe akolongisa ngai. Akolakisa ngai lisusu mwinda mpe nakomono bikela bya ye bya bosembo.
Mica LinVB 7:10  Ntango monguna wa ngai akomono yango akoyoka nsoni, oyo alobaki na ngai : « Yawe Nza­mbe wa yo azali wapi ? » Miso ma ngai makomono monguna wa ngai, esika bakonyata ye lokola potopoto ya balabala.
Mica LinVB 7:11  Mokolo bakobongisa lopango la yo, ndelo ya mokili mwa yo ekopusana !
Mica LinVB 7:12  Bato bakoyela yo ut’o Asur kin’o Ezipeti, ut’o Tiro kin’o ebale, uta mbu yoko kin’o mbu esusu, uta ngomba yoko kin’o ngomba esusu.
Mica LinVB 7:13  Mokili mokokoma mopotu, mpo ya ezalela ebe ya bato bafa­ndi wana.
Mica LinVB 7:14  Kamba na montongo bato ba ekolo ya yo, etonga ya mpata ya yo, lisango lya yo, bafandi bobele bango moko o esobe, o kati ya bilanga bya nzete ya vino. Balia malamu o Basan mpe o Galaad, lokola o ntango ya kala !
Mica LinVB 7:15  Lokola ntango tobimaki o Ezipeti, lakisa biso lisusu makamwisi manene !
Mica LinVB 7:16  Bato basusu bakomono yango mpe bakoyoka nsoni, ata bazali makasi ndenge nini ; bakozipa monoko na loboko, mpe matoi ma bango makoyoka eloko te.
Mica LinVB 7:17  Bakolete mputulu lokola nyoka mpe lokola nyama iye ikolandaka o mabelé. Na bolengi bakobima o mibenga mya bango, bakoyoka nsomo mpe bakobanga yo.
Mica LinVB 7:18  Nzambe nani akokani na yo ? Yo okolimbisaka masumu mpe okobosanaka mabe ma bato ba yo batikali, okobombaka nkanda seko te, kasi osepeli soko okoki kolakisa bango bolamu.
Mica LinVB 7:19  Oyokela biso mawa lisusu, onyata mabe ma biso na makolo, obwaka masumu ma biso manso o mbu bozindo.
Mica LinVB 7:20  Olakisa libota lya Yakob lobokó la yo, mpe libota lya Abarama bolamu bwa yo, lokola olayelaka bankoko ba biso uta kala.