REVELATION OF JOHN
Chapter 4
Reve | LinVB | 4:1 | Nsima yangó namóní limóní liye : Ezibeli ya likoló efungwámí mpé loláká, loye nayókákí libosó lokóla mondúle babétí, lolobí na ngáí : « Butá áwa, bôngó nálakisa yŏ maye masengélí koyâ nsima. » | |
Reve | LinVB | 4:2 | Sé o ntángo êná Elímo akitélí ngáí. Namóní ngwendé batélémísí o likoló, mpé Moto mŏ kó afándélí yangó. | |
Reve | LinVB | 4:3 | Oyo afándí amónóní lokóla libángá lya yáspe tŏ kornalíne. Monama mozíngí ngwendé, mongengí lokóla emeróde. | |
Reve | LinVB | 4:4 | Kíti ntúkú íbalé na ínei izíngí ngwendé ; Babangé ntúkú íbalé na bánei bafándélí kíti îná, balátí bilambá mpémbé, binkoti bya wólo o mitó. | |
Reve | LinVB | 4:5 | Minkalali na lokitó la nkáké bibimí o ngwendé ; míínda nsambo mipelí o bosó bwa ngwendé, bangó ndé bilímo nsambo bya Nzámbe. | |
Reve | LinVB | 4:6 | O bosó bwa ngwendé mbú emónóní lokóla talatálá, loléngé la mangéngéngé. O káti ya ngwendé mpé zóngazónga na yangó ba-Bomoi bánei batélémí, bazalákí na míso ebelé, epái ya libosó mpé epái ya nsima. | |
Reve | LinVB | 4:7 | Oyo wa libosó azalákí lokóla nkósi, óyo wa bábalé lokóla mwána wa ngómbé mobáli, óyo wa básáto azalákí na elongi lokóla moto, óyo wa bánei lokóla engondó ezalákí kopimbwa. | |
Reve | LinVB | 4:8 | Ba-Bomoi bánei bazalákí mŏ kó mŏ kó na mapapú motóbá ; bazalákí na míso zóngazónga na nzóto ya bangó mpé o káti. Butú mói bakolobaka : « Yě mosántu, mosántu, mosántu, Mokonzi Nzámbe wa ngúyá ínso, ‘Oyo Azalákí, Azalí mpé Akoyâ’. » | |
Reve | LinVB | 4:9 | Mbala ínso ba-Bomoi bapésí nkémbo na lokúmu mpé batóndí Oyo afándí o ngwendé, Oyo azalí o bileko na bileko, | |
Reve | LinVB | 4:10 | Babangé ntúkú íbalé na bánei bafukámí o bosó bwa Oyo afándí o ngwendé mpô ya kokúmbamela Oyo azalí o bileko bínso sékô. Babwákí binkoti bya bangó o bosó bwa ngwendé mpé balobí : | |