REVELATION OF JOHN
Chapter 14
Reve | LinVB | 14:1 | Natálí lisúsu, namóní MwâMpatá atélémí o ngómbá Síon elongó na bato nkóto monkámá na ntúkú ínei na ínei : nkómbó ya yě na nkómbó ya Tatá wa yě ikomámí o bilongi bya bangó. | |
Reve | LinVB | 14:2 | Nayókí loláká loútí o likoló, lokóla lokitó la mái makási tŏ ma nkáké ya nsómo. Loláká lôná nayókákí lozalákí mpé lokóla bazalákí kobéte nzenze. | |
Reve | LinVB | 14:3 | Bayémbí nzémbo ya sika o bosó bwa ngwendé, bwa ba-Bomoi bánei mpé bwa Babangé. Moto mŏkó té akokí koyékola nzémbo êná, bobélé bato baye nkóto monkámá na ntúkú ínei na ínei bazwí libíkí o mokili. | |
Reve | LinVB | 14:4 | Bangó bato babébí na básí té, batíkálí na bongondo. Bakolandaka Mwâ-Mpatá bipái bínso azalí kokende ; basikwámí o káti ya bato, bangó ndé mabonza ma yambo mabonzámí na Nzámbe mpé na Mwâ-Mpatá. | |
Reve | LinVB | 14:6 | Na nsima namóní Anzelú mosúsu apimbwí o ntá likoló ; azalákí na nsango elámu ya sékô asengélí kosangela bato bazalí o mokili, bato ba bikólo, mabótá, nkóta mpé mikili mínso. | |
Reve | LinVB | 14:7 | Agángí na mongóngó makási : « Bóbánga Nzámbe mpé bópésa yě nkémbo, mpô elaká ya likambo lya nsúka ebelémí ; bôngó bókúmbamela Oyo akelákí likoló, nsé, mbú na máziba. » | |
Reve | LinVB | 14:8 | Anzelú mosúsu, wa bábalé, alandí yě mpé agángí : « Babilóne enéne ekwéí, ekwéí sôló mpenzá ! » Amelísí bato ba bikólo bínso víno makási ma ekóbo. | |
Reve | LinVB | 14:9 | Anzelú mosúsu, wa básáto, alandí bangó mpé agángí na mongóngó makási : « Moto nyónso akúmbámélí Nyama mpé ekeko ya yě, mpé azalí na elembo ya yě o elongi tŏ o lobóko, | |
Reve | LinVB | 14:10 | yě mpé akomele víno ya nkándá ya Nzámbe ; basílí baléngélí víno eye, esangání na mái té, o nkéni ya nkándá ya Nzámbe. Akonyókwama na móto mpé na fofólo o míso ma Bǎnzelú basántu mpé ma Mwâ-Mpatá. | |
Reve | LinVB | 14:11 | Baye bakúmbámélí Nyama ná ekeko ya yě, baye bazwí elembo ya nkómbó ya yě, mílinga mya minyóko mya bangó mikobuta o likoló o bileko na bileko ; bakopéma té, ézala na mói, ézala na butú. » | |
Reve | LinVB | 14:12 | Ntína yangó basántu, baye bakotósaka mitíndo mya Nzámbe mpé bayambí Yézu, basengélí kokanga mitéma. | |
Reve | LinVB | 14:13 | Na nsima nayókí loláká loútí o likoló, loyébísí ngáí : « Komá boye : Esengo na bato bakowâ o bondeko bwa Mokonzi. Elímo alobí : Ya sôló, út’o leló bápéma, mpô balembí na mosálá monéne ; misálá mya bangó mikolanda bangó o nsima. » | |
Reve | LinVB | 14:14 | Natálí mpé namóní Limpata lya mpémbé ná mpé moto afándélí lyangó, azalákí lokóla Mwána wa Moto, alátí enkoti ya wólo ya bokonzi o motó mpé asímbí líkwangola lipótú o lobóko. | |
Reve | LinVB | 14:15 | Anzelú mosúsu abimí o Témpelo mpé na mongóngó makási agángélí moto óyo afándí o limpata : « Tíndá líkwangola lya yŏ mpé kátá. Elaká ya bobúki mbuma ekokí, o nsé milóna mikomélí. » | |
Reve | LinVB | 14:16 | Bôngó moto afándí o limpata, abwákí líkwangola o mokili mpé babúkí mbuma ya mwangó. | |
Reve | LinVB | 14:17 | Anzelú mosúsu abimí o Témpelo ya likoló, yě mpé azalákí na líkwangola lipótú o lobóko. | |
Reve | LinVB | 14:18 | Anzelú mosúsu abimí, aútí epái ya altáre, yě moyángeli wa mosálá mwa móto, na mongóngó makási agángélí Anzelú óyo asímbí líkwangola : « Tíndá líkwangola lipótú lya yŏ mpé kátá bituka bya mbuma ya víno o nsé, mpô mbuma ya víno isílí itelí. » | |
Reve | LinVB | 14:19 | Bôngó Anzelú abwákí líkwangola lya yě o nsé, akátí bituka bya mbuma ya víno mpé asopí yangó o eboka enéne ya nkándá ya Nzámbe ! | |