REVELATION OF JOHN
Chapter 22
| Reve | LinVB | 22:1 | Na nsima Anzelú alakísí ngáí ebale ya Mái ma Bomoi, mái sángisángi lokóla mangéngéngé. Líziba lya yangó, sé ngwendé ya Nzámbe mpé ya Mwâ-Mpatá. | |
| Reve | LinVB | 22:2 | Ebale ezalákí kokátisa engumbá. O ngámbo ínso íbalé nzeté ya bomoi izalákí ; na mbúla yŏ kó ikobótaka mbuma mbala zómi na íbalé, mbala yŏ kó na sánzá yŏkó yŏ kó. Nkásá ya nzeté iye izalí na ngúyá ya kobíkisa bapagáno. | |
| Reve | LinVB | 22:3 | Kúná bakotómbela moto mŏ kó lisúsu mabé té. Ngwendé ya Nzámbe mpé ya Mwâ-Mpatá ekozala o engumbá, mpé basáleli ba Nzámbe bakokúmbamela yě. | |
| Reve | LinVB | 22:5 | Kúná butú bokozala lisúsu té, bato bakosengela na mwínda tŏ na mwésé té, zambí Mokonzi Nzámbe akotánela bangó, bakoyángela o bileko na bileko. | |
| Reve | LinVB | 22:6 | Nsima Anzelú alobí na ngáí : « Maloba maye mazalí maloba ma bosôló, mazalí na ntembe sókí té. Mokonzi Nzámbe, óyo akolakisaka baproféta bóníbóní basengélí kosakola, atíndí Anzelú álakisa basáleli maye masengélí kosálema nokí. | |
| Reve | LinVB | 22:7 | Tálá, etíkálí moké náyâ ! Esengo na moto akotósa maloba maye proféta akomí o búku eye. » | |
| Reve | LinVB | 22:8 | Ngáí Yoáne, namóní mpé nayókí mambí mâná mánso. Awa nayókí maloba lisúsu té mpé namóní mamóní lisúsu té, nakwéí o bosó bwa Anzelú mpô ’te nákúmbamela yě. | |
| Reve | LinVB | 22:9 | Kasi alobí na ngáí : « Té, ósála bôngó té ! Nazalí sé mosáleli lokóla yŏ, lokóla bandeko ba yŏ baproféta, mpé lokóla bato bakotósaka maloba ma búku eye. Okúmbamela bobélé Nzámbe. » | |
| Reve | LinVB | 22:10 | Alobí na ngáí lisúsu : « Maloba makomámí o búku eye, óbómba mangó té, zambí Elaká ekómí penepene. | |
| Reve | LinVB | 22:11 | Mosúmuki ákóba kosála masúmu ; moto mbindo ákóba komíkómisa mbindo. Moto malámu ákóba kosála malámu, mosántu álénda o bosántu bwa yě. | |
| Reve | LinVB | 22:12 | Tálá, etíkálí moké náyâ. Nakoyêla bínó lifúta, nakofúta moto na moto engébéné na mosálá asálí. | |
| Reve | LinVB | 22:14 | Esengo na bato bakosukola bilambá bya bangó, bangó bakokoka kobeleme na nzeté ya Bomoi, koleka o bizibeli mpé koyíngela o Engumbá. | |
| Reve | LinVB | 22:15 | Kasi basúsu bakotíkala o libándá : (bato bakómí lokóla) mbwá, bato ba líkundú, ba-bosóni, babomi, baye bakokúmisaka bikeko ná baye bánso bakosepelaka na maloba mpé na bikelá bya lokutá ! » | |
| Reve | LinVB | 22:16 | Ngáí, Yézu, natíndí Anzelú wa ngáí áyébisa bínó maloba ma mibómbamo mitálí bato ba Biklézya. Ngáí, Ebóto wa libótá lya Davídi, mpé monzóto moye mokongengeke na ntóngó. | |
| Reve | LinVB | 22:17 | Elímo ná mpé Bolóngani balobí : « Yáká ! » Moto ayókí yangó, áloba mpé : « Yáká ! » Moto ayókí mpósá ya mái, ábeleme ; moto alingí, ámele mái ma Bomoi, akofúta té. | |
| Reve | LinVB | 22:18 | Nayébísí moto nyónso ayókí maloba ma mibómbamo makomámí o búku eye : « Sókó moto mŏ kó abakísí maloba masúsu, Nzámbe akoyókisa yě malózí mánso makomámí o búku eye ! | |
| Reve | LinVB | 22:19 | Sókó moto alongólí maloba masúsu o maloba ma mibómbamo makomámí o búku eye, Nzámbe akobótolo yě likabo lya yě lya nzeté ya Bomoi mpé lya Engumbá esántu, biye bilakísámí o búku eye ! » | |
| Reve | LinVB | 22:20 | Moto ayébísí bosôló bwa maye mánso, alobí : « Sôló, etíkálí moké náyâ ! » Amen, yáká Mokonzi Yézu ! | |