Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
REVELATION OF JOHN
Prev Up Next
Chapter 2
Reve LinVB 2:1  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Eféze boye : Yóká maloba ma óyo asímbí minzóto nsambo o lobóko la mobáli mpé azalí kotámbola o káti ya bitémiseli bya mwínda nsambo bya wólo :
Reve LinVB 2:2  Nayébí misálá mya yŏ, mpási okoyókaka mpé ndé­ngé okokangaka motéma ; nayébí ’te okosepelaka na bato babé té. Osílí omekí baye bakokósaka ’te bazalí bapóstolo, nzókandé bazalí bapóstolo té ; mpé omóní ’te bazalí bato ba lokutá.
Reve LinVB 2:3  Okoka­ngaka motéma mpé oyókákí mpási mpô ya nkómbó ya ngáí, kasi ole­mbékí té.
Reve LinVB 2:4  Kasi nasepélí té na bomóni ’te ozalí na bolingi lokóla libosó lisúsu té.
Reve LinVB 2:5  Kanísá naíno ndéngé ozalákí libosó mpé ndéngé okómí sikáwa ; bóngólá motéma mpé zóngélá ezalela ya yŏ ya libosó. Sókí té, nakoyâ o mbóka yŏ mpé nakolongola etémiseli ya yŏ ya mwínda o esíká ezalí ; nakosála bôngó sókó obóngólí motéma té.
Reve LinVB 2:6  Kasi na likambo lyŏ kó nazalí kosepela : lokóla ngáí, okoyinaka bizalela bya bato ba Nikolá.
Reve LinVB 2:7  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya : moto akolónga etumba, nakoléisa yě mbuma ya nzeté ya bomoi eye ezalí o Paradízo ya Nzá­mbe.
Reve LinVB 2:8  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Smírna boye : Oyo azalí Moto wa yambo mpé wa nsúka, óyo akúfákí mpé azwí bomoi lisúsu, alobí :
Reve LinVB 2:9  Nayébí ’te ozalí konyókwama mpé kokélela, kasi ozalí moto wa nkita. Nayébí ’te baye bakomíyébisaka lokóla ba-Yúda, nzókandé bazalí ba-Yúda té, bakotóngoko bínó : bazalí bato ba Sátana !
Reve LinVB 2:10  Obánga malózí té, maye makokwêla yŏ. Zábolo akokangisa bato ba bínó ba­súsu o bolóko mpô ya kosénginya bínó ; mikolo zómi bakonyókolo bínó. Sókó oyambí ngáí kín’o liwá, nakopésa yŏ enkoti ya bomoi.
Reve LinVB 2:11  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya : óyo aló­ngí etumba, liwá lya mábalé likokwêla yě té.
Reve LinVB 2:12  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Pérgamo boye : Yóká maloba ma Oyo azalí na mompánga mopótú mokokátaka bipái bíbalé :
Reve LinVB 2:13  Nayébí esíká okofándaka : ngwendé ya Sátana ezalí kúná. Kasi okangání na nkómbó ya ngáí, owángání ngáí té, atâ o mikolo babomákí Antipás, yě nzénénéké wa ngáí wa sôló. Babomákí yě o mbóka bínó, esíká Sátana akofándaka.
Reve LinVB 2:14  Kasi na makambo ma yŏ masúsu nasepélí té : bato ba yŏ basúsu bakolandaka matéya ma Baláme ; yě moto alakísákí Balák kotíela bána ba Israél motámbo mpô ’te bálía mabonza babonzélákí bikeko mpé básála ekóbo.
Reve LinVB 2:15  Bato basúsu mpé epái ya yŏ bakolandaka matéya ma bato ba Nikolá.
Reve LinVB 2:16  Yangó wâná, bóngólá motéma : sókó obóyí, nakoyâ nokí epái ya yŏ kobu­ndisa bato na mompánga mokobima o monoko mwa ngáí.
Reve LinVB 2:17  Moto azalí na matói, áyóka maloba Elímo ayébísí bato ba Biklézya : moto alóngí etumba, nakopésa yě Manú ya sika ebómbámí ; nakopésa yě mpé mwâ libángá mpémbé, liye bakomí nkómbó ya sika ; eye eyébání na moto mŏ kó té ; bobélé moto óyo akozwa mwâ libá­ngá lyangó, akoyéba.
Reve LinVB 2:18  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Tiatíra boye : Yóká maloba ma Mwána wa Nzámbe, óyo azalí na míso makongengeke lokóla mololi mwa móto mopelí makási, mpé na makolo lokóla mbengi ya motúya.
Reve LinVB 2:19  Nayébí misálá, bolingi mpé boyambi bwa yŏ, ndéngé okomípésaka mpé okotíaka moléndé ; nayébí ’te misálá mya yŏ mya sika milekí miye mya kala.
Reve LinVB 2:20  Kasi nasepélí té áwa olingísí Yezabél átéya ; akomíyébisaka lokóla proféta, kasi na matéya ma yě akokósaka basáleli ba ngáí mpô ’te básála ekóbo na boléi nyama iye babonzélí bikeko.
Reve LinVB 2:21  Natíkélákí yě mwâ ntángo mpô ábóngola motéma, kasi abóyí kotíka makambo ma yě ma ekóbo.
Reve LinVB 2:22  Yangó wâná nakobwáka yě o mbéto esíká akoyóka mpási, yě na báníngá ba yě bakosálaka ekóbo. Sókó babóngólí mitéma té mpé batíkí mabé ma bangó té, nakoyókisa bangó malózí ma nsómo.
Reve LinVB 2:23  Nakoboma bána ba yě, bôngó bato ba Biklézya bínso bakoyéba ’te ngáí moto nayébí makanisi mpé mitéma mya bato ; mpé nakofúta mŏ kó mŏ kó wa bínó engé­béné na misálá mya yě.
Reve LinVB 2:24  Kasi bínó, bato basúsu ba Tiatíra, bondimí matéya mâná té, mpé boyébí mibómbamo mya Sátana té, miye bangó bakotángaka bôngó, nakotíe­la bínó mókúmbá mosúsu té.
Reve LinVB 2:25  Bó­kangana téé nsúka na maye mazalí na bínó, kín’o mokolo nakoyâ.
Reve LinVB 2:26  Moto akolónga etumba, óyo akotósa mibéko mya ngáí téé nsúka, nakopésa yě likokí lya koyángela bikólo bínso :
Reve LinVB 2:27  akokamba bangó na língé­nda lya ebendé, mpé akobúka bangó lokóla mbéki ya libázi !
Reve LinVB 2:28  Ngáí na­zwí likokí lyangó o mabóko ma Tatá wa ngáí. Nakopésa yě Monzóto mwa ntó­ngó.
Reve LinVB 2:29  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklé­zya.