Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
REVELATION OF JOHN
Prev Up Next
Chapter 4
Reve LinVB 4:1  Nsima yangó namóní limóní liye : Ezibeli ya likoló efungwámí mpé loláká, loye nayókákí libosó lokóla mondúle babétí, lolobí na ngáí : « Butá áwa, bôngó nálakisa yŏ maye masengélí koyâ nsima. »
Reve LinVB 4:2  Sé o ntá­ngo êná Elímo akitélí ngáí. Namóní ngwendé batélémísí o likoló, mpé Moto mŏ kó afándélí yangó.
Reve LinVB 4:3  Oyo afándí amónóní lokóla libá­ngá lya yáspe tŏ kornalíne. Monama mozíngí ngwendé, mongengí lokóla emeróde.
Reve LinVB 4:4  Kíti ntúkú íbalé na ínei izíngí ngwendé ; Babangé ntúkú íbalé na bánei bafándélí kíti îná, balátí bilambá mpémbé, binkoti bya wólo o mitó.
Reve LinVB 4:5  Minkalali na lokitó la nkáké bibimí o ngwendé ; míínda nsambo mipelí o bosó bwa ngwendé, bangó ndé bilímo nsambo bya Nzámbe.
Reve LinVB 4:6  O bosó bwa ngwendé mbú emónóní lokóla talatálá, loléngé la mangéngéngé. O káti ya ngwendé mpé zóngazónga na yangó ba-Bomoi bánei batélémí, bazalákí na míso ebelé, epái ya libosó mpé epái ya nsima.
Reve LinVB 4:7  Oyo wa libosó azalákí lokóla nkósi, óyo wa bábalé lokóla mwána wa ngómbé mobáli, óyo wa básáto azalákí na elongi lokóla moto, óyo wa bánei lo­kóla engondó ezalákí kopimbwa.
Reve LinVB 4:8  Ba-Bomoi bánei bazalákí mŏ kó mŏ kó na mapapú motóbá ; bazalákí na míso zóngazónga na nzóto ya bangó mpé o káti. Butú mói bakolobaka : « Yě mosántu, mosántu, mosántu, Mokonzi Nzámbe wa ngúyá ínso, ‘Oyo Azalákí, Azalí mpé Ako­yâ’. »
Reve LinVB 4:9  Mbala ínso ba-Bomoi bapésí nké­mbo na lokúmu mpé batóndí Oyo afándí o ngwendé, Oyo azalí o bileko na bileko,
Reve LinVB 4:10  Babangé ntúkú íbalé na bánei bafukámí o bosó bwa Oyo afándí o ngwendé mpô ya kokúmbamela Oyo azalí o bileko bínso sékô. Babwákí binkoti bya bangó o bosó bwa ngwendé mpé balobí :
Reve LinVB 4:11  « E Mokonzi, Nzámbe wa bísó, olongóbání kozwa nkémbo, lokúmu na ngúyá, zambí yŏ moto ozalísí molóngó mobimba ; bínso bikelámí mpé bizwí bomoi mpô ya yŏ. »