REVELATION OF JOHN
Chapter 8
| Reve | LinVB | 8:1 | Ntángo Mwâ-Mpatá abúkí ekangeli ya nsambo, likoló likómí nyê, sókí ndámbo ya ngonga. | |
| Reve | LinVB | 8:2 | Nsima namóní Bǎnzelú nsambo batélémí o bosó bwa Nzámbe ; bapésí bangó mindúle nsambo. | |
| Reve | LinVB | 8:3 | Anzelú mosúsu ayéí kotéleme penepene na altáre, engwekúngwekú ya wólo o mabóko. Bapésí yě malási míngi mpô ’te ábonza mangó elongó ná losámbo la basántu bánso, o altáre ya wólo, o bosó bwa ngwendé. | |
| Reve | LinVB | 8:4 | Mílinga mya malási mibimí o lobóko la Anzelú, mibutí epái ya Nzámbe elongó na losámbo la basántu. | |
| Reve | LinVB | 8:5 | Na nsima Anzelú akamátí engwekúngwekú mpé atóndísí yangó na makála ma móto ma altáre mpé abwákí yangó o nsé. Ebimí nkáké, mingóngó, minkalali, mpé mokili moningání. | |
| Reve | LinVB | 8:7 | Oyo wa libosó abétí mondúle : mbúla ya matándalá na móto, bisangání na makilá, ebétí o mokili, mpé eténi ya bísáto ya mokili ezíkí na móto, eténi ya bísáto ya nzeté ezíkí lokóla, matíti mabésu mánso mazíkí nyé. | |
| Reve | LinVB | 8:8 | Na nsima Anzelú wa bábalé abétí mondúle : ezalákí lokóla ngómbá enéne eye ezíkí na móto ebwákémí o mbú, mpé eténi ya bísáto ya mbú ebóngwání makilá. | |
| Reve | LinVB | 8:9 | Eténi ya bísáto ya bikelámo bínso bikozalaka o mbú ekúfí, mpé ndámbo ya ísáto ya masúwa ezindí. | |
| Reve | LinVB | 8:10 | Anzelú wa básáto abétí mondúle : monzóto monéne mololí lokóla esúngi moútí o likoló mpé mokwêlí eténi ya bísáto ya bibale mpé ya máziba ma mái. | |
| Reve | LinVB | 8:11 | Nkómbó ya monzóto mwangó ‘Bololo’ : eténi ya bísáto ya mái ebóngwání mái bololo, mpé bato míngi bawéí mpô ya mái makómí bololo. | |
| Reve | LinVB | 8:12 | Anzelú wa bánei abétí mondúle : eténi ya bísáto ya mwésé, ya sánzá mpé ya minzóto ebébí, mpé eténi ya bísáto ya bîná bínso ekómí molílí ; ndámbo ya ísáto ya mói mpé ya butú ekómí molílí. | |