Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
REVELATION OF JOHN
Prev Up Next
Chapter 8
Reve LinVB 8:1  Ntángo Mwâ-Mpatá abúkí ekangeli ya nsambo, likoló likómí nyê, sókí ndámbo ya ngo­nga.
Reve LinVB 8:2  Nsima namóní Bǎnzelú nsambo batélémí o bosó bwa Nzámbe ; bapésí bangó mindúle nsambo.
Reve LinVB 8:3  Anze­lú mosúsu ayéí kotéleme penepene na altáre, engwekúngwekú ya wólo o mabóko. Bapésí yě malási míngi mpô ’te ábonza mangó elongó ná losámbo la basántu bánso, o altáre ya wólo, o bosó bwa ngwendé.
Reve LinVB 8:4  Mílinga mya malási mibimí o lobóko la Anzelú, mibutí epái ya Nzámbe elongó na losámbo la basántu.
Reve LinVB 8:5  Na nsima Anzelú akamátí engwekúngwekú mpé ató­ndísí yangó na makála ma móto ma altáre mpé abwákí yangó o nsé. Ebimí nkáké, mingóngó, minkalali, mpé mokili moningání.
Reve LinVB 8:6  Bǎnzelú nsambo bazalákí na mi­ndúle nsambo, bamíléngélí mpô ya kobéte myangó.
Reve LinVB 8:7  Oyo wa libosó abétí mondúle : mbúla ya matándalá na móto, bisangání na makilá, ebétí o mokili, mpé eténi ya bísáto ya mokili ezíkí na móto, eténi ya bísáto ya nzeté ezíkí lokóla, matíti mabésu mánso mazíkí nyé.
Reve LinVB 8:8  Na nsima Anzelú wa bábalé abétí mo­ndúle : ezalákí lokóla ngómbá enéne eye ezíkí na móto ebwákémí o mbú, mpé eténi ya bísáto ya mbú ebóngwání makilá.
Reve LinVB 8:9  Eténi ya bísáto ya bikelámo bínso bikozalaka o mbú ekúfí, mpé ndámbo ya ísáto ya masúwa ezindí.
Reve LinVB 8:10  Anzelú wa básáto abétí mondúle : monzóto monéne mololí lokóla esúngi moútí o likoló mpé mokwêlí eténi ya bísáto ya bibale mpé ya máziba ma mái.
Reve LinVB 8:11  Nkó­mbó ya monzóto mwangó ‘Bololo’ : eténi ya bísáto ya mái ebóngwání mái bololo, mpé bato míngi bawéí mpô ya mái makómí bololo.
Reve LinVB 8:12  Anze­lú wa bánei abétí mondúle : eténi ya bísáto ya mwésé, ya sánzá mpé ya minzóto ebébí, mpé eténi ya bísáto ya bîná bínso ekómí molílí ; ndámbo ya ísáto ya mói mpé ya butú ekómí molílí.
Reve LinVB 8:13  Mpé namóní engondó ezalákí kopimbwa o likoló, ezalákí kogá­nga makási : « Mawa ! Mawa ! Mawa na bato bánso ba mokili ntángo Bǎnzelú basúsu básáto bakobéte mindúle. »