REVELATION OF JOHN
Chapter 1
Reve | LinVB | 1:1 | Yézu Krístu ayébísí mibómbamo, miye Nzámbeméi alakísákí yě mpô ’te áyébisa basáleli ba yě mambí masengélí koyâ nokí ; Yézu atíndí ǎnzelú wa yě áyébisa mangó na mosáleli wa yě Yoáne. | |
Reve | LinVB | 1:2 | Yoáne óyo asakólí mambí mánso amónókí, mangó ndé : Liloba lya Nzámbe mpé maye Yézu Krístu asakólákí. | |
Reve | LinVB | 1:3 | Esengo na moto atángí maloba maye mpé na baye bayókí mangó sókó bakondima maye makomámí áwa, zambí elaká ekómí penepene ! | |
Reve | LinVB | 1:4 | Yoáne ôná Biklézya nsambo o Azía : bózwa ngrásya na bobóto biútí na ‘Oyo Azalí, Azalákí mpé Akoyâ’, na Bilímo nsambo bitélémí o bosó bwa Ngwendé ya yě, | |
Reve | LinVB | 1:5 | mpé na Yézu Krístu, nzénénéké wa sôló, Mwána wa Yambo, óyo asékwí o bawá, yě Nkúmú wa bakonzi ba nsé. Yě moto akolingaka bísó, mpé na makilá ma yě abíkísí bísó o masúmu, | |
Reve | LinVB | 1:6 | akómísí bísó bato ba Bokonzi bwa banganga Nzámbe, mpô tósálela Tatá wa yě Nzámbe : na yě nkémbo mpé ngúyá o bileko na bileko. Amen. | |
Reve | LinVB | 1:7 | Tálá, azalí koyâ o káti ya mampata ; bato bánso bakomóno yě, atâ baye batubólákí yě mopanzí. Bato ba bikólo bínso áwa o nsé bakolela mpô ya yě. Ekozala sé bôngó. Amen ! | |
Reve | LinVB | 1:8 | Mokonzi Nzámbe alobí : « Ngáí nazalí Alfa na Oméga », « Oyo Azalí, Azalákí mpé Akoyâ », Mokonzi wa bokási bónso. | |
Reve | LinVB | 1:9 | Ngáí, ndeko wa bínó Yoáne, bísó na bínó tozwí bokonzi, toyókí minyóko mpé tokangí mitéma, na Yézu lisangá. Nazalákí o esanga Pátmos, mpô natéyákí Liloba lya Nzámbe mpé nasakólákí matéya ma Yézu. | |
Reve | LinVB | 1:10 | O Mokolo mwa Mokonzi, Elímo akitélí ngáí mpé nsima ya ngáí nayókí, lokóla mondúle bazalákí kobéte, loláká lonéne | |
Reve | LinVB | 1:11 | lolobí : « Maye okomóno, komá mangó o búku mpé tíndá yangó epái ya Biklézya nsambo : o Eféze, o Smírna, o Pérgamo, o Tiatíra, o Sárdes, o Filadélfia mpé o Laodiséa. » | |
Reve | LinVB | 1:12 | Namíbóngólí mpô nátála náni moto alobí na ngáí. Tálá boye, namóní bitémiseli bya mwínda nsambo bya wólo. | |
Reve | LinVB | 1:13 | O káti ya bitémiseli namóní lokóla Mwána wa Moto : alátí elambá elaí, akangí yangó na nkámba ya wólo o lokéto. | |
Reve | LinVB | 1:14 | Motó na nsúki ya yě izalákí mpémbé lokóla nsúki ya mpatá, mpémbé makási mpenzá ; míso ma yě mazalákí kongenge lokóla mololi mwa móto mopelí makási ; | |
Reve | LinVB | 1:15 | makolo ma yě lokóla mbengi ya motúya bapétólí na móto, mongóngó mwa yě moyókání lokóla lokitó la mái makási. | |
Reve | LinVB | 1:16 | O lobóko la mobáli asímbí minzóto nsambo ; mompánga mopótú mokokátaka bipái bíbalé mobimélí yě o monoko ; elongi ya yě ezalákí kongenge makási mpenzá lokóla mwésé. | |
Reve | LinVB | 1:17 | Awa namóní yě, nakwéí o bosó bwa yě lokóla moto awéí, kasi atíélí ngáí lobóko la yě la mobáli, alobí : « Obánga té ! Ngáí Moto wa yambo mpé wa nsúka, | |
Reve | LinVB | 1:18 | nazalí na bomoi ; nawâkí, kasi tálá, nazalí na bomoi o bileko na bileko, nazalí na mafungóla ma liwá mpé ma mbóka ya bawá. | |