Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
REVELATION OF JOHN
Prev Up Next
Chapter 3
Reve LinVB 3:1  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Sárdes boye : Yóká maloba ma Oyo azalí na Bilímo nsambo bya Nzámbe mpé na minzóto nsambo. Nayébí misálá mya yŏ. Bakolobaka ’te ozalí na bomoi, kasi osílí owéí.
Reve LinVB 3:2  Olamuka mpé óléndísá mwâ bomoi botíkálí na yŏ, boye bolingí bókúfa. Namóní ’te misálá mya yŏ mibongí naíno té o míso ma Nzámbe wa ngáí.
Reve LinVB 3:3  Yangó wâná, óku­ndola o motéma ndéngé níni oya­mbákí Liloba liye oyókákí. Ndimá lyangó mpé bóngólá ezalela ya yŏ. Sókó okéngélí malámu té, nakoyâ lokóla moyíbi, okoyéba té na ngonga níni nakobimela yŏ.
Reve LinVB 3:4  Kasi bato ba yŏ basúsu o Sárdes babébísí bilambá bya bangó té. Bakotámbola na ngáí elongó na bilambá mpé­mbé, mpô balongóbání.
Reve LinVB 3:5  Moto aló­ngí etumba akoláta elambá mpé­mbé ; nakoboma nkómbó ya yě o búku ya bomoi té ; o míso ma Tatá wa ngáí mpé ma Bǎnzelú ba yě nakondima ’te azalí moto wa ngáí.
Reve LinVB 3:6  Oyo azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya.
Reve LinVB 3:7  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Filadélfia boye : Yóká maloba ma Mosántu, yě Moto wa bosôló, óyo azalí na lifungóla lya Davídi. Sókó afungólí, moto mŏ kó akokanga té ; sókó akangí, moto mŏ kó akofungola té.
Reve LinVB 3:8  Nayébí misálá mya yŏ : oza­lákí makási míngi té, kasi obátélí lilo­ba lya ngáí mpé owángání nkómbó ya ngáí té. Yangó wâná nafu­ngólélí yŏ ezibeli, eye moto mŏ­kó akokí kokanga té.
Reve LinVB 3:9  Tálá, nakosála ’te bato ba sinagóga ya Sátana báyâ kokúmbama o bosó bwa makolo ma yŏ, bándima bôngó ’te nali­ngí yŏ. Bato baye ba lokutá bakomíyébisaka lokóla ba-Yúda, nzó­kandé bazalí ba-Yúda té.
Reve LinVB 3:10  Awa obátélí liloba lya ngáí mpé okangí motéma, ngáí mpé nakobátela yŏ o ntángo malózí makokwêla mokili mobimba mpô ya komeka bato ba nsé.
Reve LinVB 3:11  Nakozónga nokí. Okangana na maye mazalí na yŏ, moto mŏ kó té ábótolo yŏ enkoti ya lilónga.
Reve LinVB 3:12  Moto akolónga etumba, nakokómisa yě lokóla likonzí lya témpelo ya Nzámbe wa ngáí. Akolongwa wâná lisúsu té ; nakokoma o elongi ya yě nkómbó ya Nzámbe wa ngáí, nkómbó ya ngáí ya sika, mpé nkó­mbó ya Engumbá ya Nzámbe wa ngáí, Yerúzalem ya sika, eye ekoúta o likoló, epái ya Nzámbe wa ngáí.
Reve LinVB 3:13  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya.
Reve LinVB 3:14  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Laodiséa boye : Yóká maloba ma Oyo azalí ‘Amen’, yě nzénénéké wa sôló óyo akokósaka té, óyo azalí Ntína ya bikelámo bínso bya Nzámbe.
Reve LinVB 3:15  Nayébí misálá mya yŏ : ozalí mpío té, móto mpé té ; malámu sókó ozalákí tŏ mpío tŏ móto.
Reve LinVB 3:16  Lokóla ozalí mpío té, móto mpé té, kasi sé mwâ molungé, nakosá­nza yŏ.
Reve LinVB 3:17  Okolobaka : Tálá, nazalí moto wa nkita, nakómí na mosolo míngi, nazángí elóko té ; nzókandé omóní té ’te ozalí sé moto wa mawa, óyo bakoyókelaka ngolu, mobóla, okúfá míso, ozalí bolúmbú.
Reve LinVB 3:18  Yangó wâná, yóká lilako lya ngáí : sómbá epái ya ngáí wólo bapétólí na móto ; bôngó okozala moto wa nkita. Sómbá bilambá mpémbé, látá byangó, zipá bolúmbú bwa yŏ mpô óyóka nsóni té. Sómbá mpé monô, tíá yangó o míso, bôngó ómóno lisúsu.
Reve LinVB 3:19  Nakopálela mpé nakotúmbola baye nakolingaka. Bôngó, tíá moléndé mpé bóngólá motéma !
Reve LinVB 3:20  Tálá, natélémí penepene na ezibeli ya ndáko ya yŏ, mpé nabétélí yangó : sókó moto ayókí loláká la ngáí mpé azibólí ndáko, nakoyâ o mbóka yě mpô tólía méza yŏ kó, bísó na yě.
Reve LinVB 3:21  Moto akoló­nga etumba, nakopésa yě esíká penepene na ngáí o ngwendé ya ngáí, sé lokóla ngáí, áwa nalóngí etumba, nayéí kofánda penepene na Tatá wa ngáí o ngwendé ya yě.
Reve LinVB 3:22  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya. »