REVELATION OF JOHN
Chapter 3
| Reve | LinVB | 3:1 | Komélá Anzelú wa Eklézya ya Sárdes boye : Yóká maloba ma Oyo azalí na Bilímo nsambo bya Nzámbe mpé na minzóto nsambo. Nayébí misálá mya yŏ. Bakolobaka ’te ozalí na bomoi, kasi osílí owéí. | |
| Reve | LinVB | 3:2 | Olamuka mpé óléndísá mwâ bomoi botíkálí na yŏ, boye bolingí bókúfa. Namóní ’te misálá mya yŏ mibongí naíno té o míso ma Nzámbe wa ngáí. | |
| Reve | LinVB | 3:3 | Yangó wâná, ókundola o motéma ndéngé níni oyambákí Liloba liye oyókákí. Ndimá lyangó mpé bóngólá ezalela ya yŏ. Sókó okéngélí malámu té, nakoyâ lokóla moyíbi, okoyéba té na ngonga níni nakobimela yŏ. | |
| Reve | LinVB | 3:4 | Kasi bato ba yŏ basúsu o Sárdes babébísí bilambá bya bangó té. Bakotámbola na ngáí elongó na bilambá mpémbé, mpô balongóbání. | |
| Reve | LinVB | 3:5 | Moto alóngí etumba akoláta elambá mpémbé ; nakoboma nkómbó ya yě o búku ya bomoi té ; o míso ma Tatá wa ngáí mpé ma Bǎnzelú ba yě nakondima ’te azalí moto wa ngáí. | |
| Reve | LinVB | 3:7 | Komélá Anzelú wa Eklézya ya Filadélfia boye : Yóká maloba ma Mosántu, yě Moto wa bosôló, óyo azalí na lifungóla lya Davídi. Sókó afungólí, moto mŏ kó akokanga té ; sókó akangí, moto mŏ kó akofungola té. | |
| Reve | LinVB | 3:8 | Nayébí misálá mya yŏ : ozalákí makási míngi té, kasi obátélí liloba lya ngáí mpé owángání nkómbó ya ngáí té. Yangó wâná nafungólélí yŏ ezibeli, eye moto mŏkó akokí kokanga té. | |
| Reve | LinVB | 3:9 | Tálá, nakosála ’te bato ba sinagóga ya Sátana báyâ kokúmbama o bosó bwa makolo ma yŏ, bándima bôngó ’te nalingí yŏ. Bato baye ba lokutá bakomíyébisaka lokóla ba-Yúda, nzókandé bazalí ba-Yúda té. | |
| Reve | LinVB | 3:10 | Awa obátélí liloba lya ngáí mpé okangí motéma, ngáí mpé nakobátela yŏ o ntángo malózí makokwêla mokili mobimba mpô ya komeka bato ba nsé. | |
| Reve | LinVB | 3:11 | Nakozónga nokí. Okangana na maye mazalí na yŏ, moto mŏ kó té ábótolo yŏ enkoti ya lilónga. | |
| Reve | LinVB | 3:12 | Moto akolónga etumba, nakokómisa yě lokóla likonzí lya témpelo ya Nzámbe wa ngáí. Akolongwa wâná lisúsu té ; nakokoma o elongi ya yě nkómbó ya Nzámbe wa ngáí, nkómbó ya ngáí ya sika, mpé nkómbó ya Engumbá ya Nzámbe wa ngáí, Yerúzalem ya sika, eye ekoúta o likoló, epái ya Nzámbe wa ngáí. | |
| Reve | LinVB | 3:14 | Komélá Anzelú wa Eklézya ya Laodiséa boye : Yóká maloba ma Oyo azalí ‘Amen’, yě nzénénéké wa sôló óyo akokósaka té, óyo azalí Ntína ya bikelámo bínso bya Nzámbe. | |
| Reve | LinVB | 3:15 | Nayébí misálá mya yŏ : ozalí mpío té, móto mpé té ; malámu sókó ozalákí tŏ mpío tŏ móto. | |
| Reve | LinVB | 3:17 | Okolobaka : Tálá, nazalí moto wa nkita, nakómí na mosolo míngi, nazángí elóko té ; nzókandé omóní té ’te ozalí sé moto wa mawa, óyo bakoyókelaka ngolu, mobóla, okúfá míso, ozalí bolúmbú. | |
| Reve | LinVB | 3:18 | Yangó wâná, yóká lilako lya ngáí : sómbá epái ya ngáí wólo bapétólí na móto ; bôngó okozala moto wa nkita. Sómbá bilambá mpémbé, látá byangó, zipá bolúmbú bwa yŏ mpô óyóka nsóni té. Sómbá mpé monô, tíá yangó o míso, bôngó ómóno lisúsu. | |
| Reve | LinVB | 3:19 | Nakopálela mpé nakotúmbola baye nakolingaka. Bôngó, tíá moléndé mpé bóngólá motéma ! | |
| Reve | LinVB | 3:20 | Tálá, natélémí penepene na ezibeli ya ndáko ya yŏ, mpé nabétélí yangó : sókó moto ayókí loláká la ngáí mpé azibólí ndáko, nakoyâ o mbóka yě mpô tólía méza yŏ kó, bísó na yě. | |
| Reve | LinVB | 3:21 | Moto akolónga etumba, nakopésa yě esíká penepene na ngáí o ngwendé ya ngáí, sé lokóla ngáí, áwa nalóngí etumba, nayéí kofánda penepene na Tatá wa ngáí o ngwendé ya yě. | |