Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
RUTH
1 2 3 4
Prev Up Next
Chapter 1
Ruth LinVB 1:1  O mikolo bazuzi bazalaki koya­ngela ekolo, nzala makasi ekweli mokili. Moto moko alongwi o mboka Beteleme o mokili mwa Yuda, elongo na mwasi mpe na bana ba ye babale ; akei kofanda o esobe ya Moab.
Ruth LinVB 1:2  Nko­mbo ya mobali oyo Elimelek, mwasi wa ye Noemi. Nkombo ya bana babali : Malon na Kilion. Bazali bato ba Efrata, mboka ya bango Beteleme ya Yuda. Bayei o esobe ya Moab, esika bafandi.
Ruth LinVB 1:3  Elimelek, mobali wa Noemi, akufi ; Noemi atikali na bana babali ba ye babale.
Ruth LinVB 1:4  Ba­ngo babale bakamataki basi ba mokili mwa Moab ; moko nkombo ya ye Orpa, mosusu Rute. Bafandi kuna mibu zomi.
Ruth LinVB 1:5  Na nsima Malon na Kilion mpe bakufi ; Noemi atikali ye moko, bana te, mobali mpe te.
Ruth LinVB 1:6  Mokolo moko Noemi atelemi, elongo na bakilo ba ye basi atiki esobe ya Moab, zambi kuna ayokaki ’te Yawe ayokelaki bato ba ekolo ya ye mawa mpe apesaki bango mampa.
Ruth LinVB 1:7  Bongo atiki mboka esika afandaki elongo na bakilo ba ye babale. Basimbi nzela mpo ya kozonga o ekolo ya Yuda.
Ruth LinVB 1:8  Kasi Noemi alobi na bakilo ba ye babale : « Bozonga o mboka ya bino, moto na moto epai ya mama wa ye. Yawe asala bino malamu lokola bino bosalaki malamu na baye bawei mpe na ngai moko.
Ruth LinVB 1:9  Yawe asalisa bino mpo ’te bozwa mobali mpe bofanda na ye malamu. » Na nsima azingi ba­ngo ekopi, kasi bango babandi kolela.
Ruth LinVB 1:10  Balobi : « Te ! Tokokende na yo mpe tokofanda epai ya bandeko ba yo. »
Ruth LinVB 1:11  Noemi azongisi : « E bana ba ngai, bozonga o mboka ya bino, mpo nini bolingi kokende na ngai elongo ? Nazali nde lisusu na bana babali o libumu mpo ’te babala bino ?
Ruth LinVB 1:12  Bozonga, bana ba ngai, bokende, zambi nasili nakomi mobange, nazali lisusu mwasi wa kobala te ! Mpe ata nalobi : ‘Elikya ezali naino : nakozala na mobali lelo na butu, mpe nakobota naino bana’,
Ruth LinVB 1:13  bino bokozila bango tee bakomi bakolo ? Mpe bongo bokoboya kobala mobali ? Te, bana ba ngai, nazali na mawa manene mpo ya bino. Loboko la Yawe lobeteki ngai liboso. »
Ruth LinVB 1:14  Bango bakomi kolela makasi. Orpa azingi bokilo wa ye ekopi mpe azongi o mboka ya ye, kasi Rute alingi kotika bokilo wa ye te.
Ruth LinVB 1:15  Noemi alobi na ye : « Tala, mba­nda wa yo azongi o mboka ya ye epai ya bandeko ba ye mpe nzambe wa ye. Yo mpe sala bobele lokola ye mpe zonga o mboka. »
Ruth LinVB 1:16  Rute alobi na ye : « Otinda ngai na makasi te, nali­ngi kotika yo te mpe kolongwa te, zambi bipai binso okokende, ngai mpe nakokende, esika yo okofanda, ngai mpe nakofanda, ekolo ya yo ekozala ekolo ya ngai, Nzambe wa yo akozala Nzambe wa ngai.
Ruth LinVB 1:17  Esika yo okokufa, ngai mpe nakokufa, bakokunda ngai mpe kuna. Yawe asala ngai mabe maye, mpe abakisa naino etumbu esusu, soko liwa likaboli biso te ! »
Ruth LinVB 1:18  Emoni Noemi ’te Rute alingi se kolanda ye, atiki kotuna ye.
Ruth LinVB 1:19  Bongo bango babale bakei mpe bakomi o Beteleme ; bato banso ba mboka bakamwi mpe basi bamituni : « Ye nde Noemi solo ? »
Ruth LinVB 1:20  Kasi ye ayanoli : « Bo­byanga ngai ‘Mara’, zambi Nzambe wa bokasi bonso atondisi motema mwa ngai na mawa.
Ruth LinVB 1:21  Natondaki na biloko ntango nakendeki, sikawa Yawe azongisi ngai maboko mpamba. Mpo nini bobyangi ngai lisusu Noemi, awa Yawe asambisi ngai, mpe Nzambe wa bokasi bonso ayokisi ngai mpasi ? »
Ruth LinVB 1:22  Noemi azongi bongo o mboka ya ye elongo na bokilo wa ye Rute, oyo atiki ekolo ya ye Moab. Bakomi o Beteleme o ebandela ya eleko ya bobuki mbuma ya mampa.