Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
RUTH
1 2 3 4
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 3
Ruth LinVB 3:1  Bokilo wa ye Noemi alobi na ye : « E mwana wa ngai, mosala mwa ngai : kolukela yo mobali oyo akosala yo malamu.
Ruth LinVB 3:2  Yoka, Booz, oyo epai okendeki kolokoto mbuma nsima ya basali basi, azali ndeko wa ngai. Lelo na butu akopupola mbuma ya mampa o etutelo.
Ruth LinVB 3:3  Yango wana, sukola nzoto mpe pakola yango malasi, kende o etutelo, kasi omilakisa na ye te tee asilisi kolia mpe komele.
Ruth LinVB 3:4  Ekomi ntango ya kolala, otala malamu esika nini akei kopema ; na nsima yo mpe kende kuna, longola bolangiti o makolo ma ye mpe lala kuna. Ye moko akoyebisa yo nini osengeli kosala. »
Ruth LinVB 3:5  Mpe Rute ayanoli : « Nakosala manso lokola olobi. »
Ruth LinVB 3:6  Akei o etutelo mpe asali manso lokola bokilo wa ye ayebisi ye.
Ruth LinVB 3:7  Booz alei mpe ameli ; na nsima akei kolala mpongi na motema esengo penepene na ngoto ya mbuma. Rute ayei malembe, alongoli bolangiti o makolo ma ye mpe alali wana.
Ruth LinVB 3:8  O kati ya butu Booz akomi kolenge, alamuki, atali epai na epai mpe amoni mwasi moko alali penepene na makolo ma ye.
Ruth LinVB 3:9  Atuni ye : « Yo nani ? » Ye azongisi : « Nazali Rute, mosaleli wa yo. Bala ngai, mosaleli wa yo, zambi yo moto okoki kosikola ngai. »
Ruth LinVB 3:10  Booz alobi : « Yawe abenisa yo, mwana wa ngai ; mbala eye ya ibale olakisi boniboni olingi bandeko ba yo, zambi olukaki bilenge babali te, ata babola ata bato ba nkita.
Ruth LinVB 3:11  Sikawa, mwana wa ngai, obanga te. Manso okoloba nakosala mango mpo ya yo, mpo bato banso ba mboka ya biso bayebi ’te ozali mwasi wa lokumu.
Ruth LinVB 3:12  Kasi sikawa, soko ezali ya solo ’te nakoki kosikola yo, yeba ’te ndeko mosusu wa penepene azali, oyo akoki kosikola yo.
Ruth LinVB 3:13  Tikala awa na butu. Na ntongo, soko ye alingi, malamu asikola yo ! Kasi soko alingi kosikola yo te, lokola Yawe azali na bomoi, ngai moto nakosikola yo ! Lala se malamu tee ntongo. »
Ruth LinVB 3:14  Rute alali wana penepene na makolo ma ye tee nto­ngo, kasi atelemi o ntango bakoki ko­monono na bato te. Booz alobaki : « Ma­lamu bato bayeba te ’te mwasi oyo ayaki awa o etutelo. »
Ruth LinVB 3:15  Alobi na ye : « Pesa liputa olati mpe tanda lya­ngo. » Akamati liputa mpe Booz atii wana kilo ntuku ibale ya mbuma ya mampa mpe apesi ye. Nsima akei o mboka.
Ruth LinVB 3:16  Rute azongi epai ya bokilo wa ye. Oyo atuni : « Nsango nini, mwana wa ngai ? » Rute ayebisi ye manso mobali asalaki mpo ya ye.
Ruth LinVB 3:17  Alobi : « Moto ona apesi ngai kilo ntuku ibale ya mbuma ya mampa, mpo alobaki : Okozonga epai ya bokilo wa yo maboko mpamba te. »
Ruth LinVB 3:18  Noemi alobi : « Mwana wa ngai, fanda naino awa tee okoyeba boniboni likambo likosuka. Ntembe te, moto ona akopema te, akobongisa likambo liye bobele lelo. »