TOBIT
Chapter 10
Tobi | LinVB | 10:1 | Nzokande mokolo na mokolo Tobit azalaki kotanga mikolo mya mobembo, mya bokei mpe mya bozongi. Esilaki mikolo mina minso, mwana wa ye azongi naino te. | |
Tobi | LinVB | 10:2 | Akanisi : « Mbele bapesi ye nzela ya kozonga te ! Mbele Gabael asili akufi, mpe kuna moto moko azali te mpo ya kopesa ye mosolo ! » | |
Tobi | LinVB | 10:4 | Mwasi wa ye Ana alobi : « Mwana wa ngai akufi, azali lisusu na bomoi te. » Ye mpe akomi kolela mpe komitungisa mpo ya mwana wa ye, alobi : | |
Tobi | LinVB | 10:5 | « Ndenge nini nandimaki ’te yo, mwana wa ngai okende, yo mwinda mwa miso ma ngai ! » | |
Tobi | LinVB | 10:6 | Tobit azongiseli ye : « Mama, kitisa motema, omitungisa te ; mwana azali bobele malamu. Mbele bakuti libaku kuna ; moninga wa ye azali moto wa solo, azali ndeko wa biso. Omiyokisa mawa te ; mosika te tokomono ye. » | |
Tobi | LinVB | 10:7 | Kasi ye ayanoli : « Olobela ngai lisusu liloba lyoko te, tika kokosa ngai, mwana wa ngai akufi ! » Mpe mokolo na mokolo azalaki kobima o libanda kotala nzela epai mwana wa ye ake-ndeki, mpo alingi kondima monoko mwa moto moko lisusu te. Mpe awa moi mokiti, azongi lisusu o ndako, se kokimela mpe kolela butu mobimba, alali mpongi soki te. Nsima ya mikolo zomi na minei mya eyenga ya libala lokola Raguel alayaki ndai, Tobia akei koyebisa ye : « Tika ngai nakende, mpo nayebi ’te tata na mama bazali lisusu na elikya te ’te bakomono ngai lisusu. Yango wana, nabondeli yo, tata, tika ngai nakende mpe nazonga epai ya tata wa ngai. Nasili kolimbolela yo boniboni natikaki bango. » | |
Tobi | LinVB | 10:8 | Kasi Raguel alobi na Tobia : « Tikala naino, mwana wa ngai, otikala epai ya ngai. Nakotinda bantoma epai ya tata wa yo Tobit bayebisa ye nsango ya yo. » | |
Tobi | LinVB | 10:10 | Se o ntango ena Raguel apesi ye mwasi wa ye Sara, na mpe ndambo ya biloko bya ye binso, basali babali na basali basi, ngombe na mpata, mpunda na kamela, bilamba, mosolo na biloko bisusu ndenge na ndenge. | |
Tobi | LinVB | 10:11 | Atiki bango bakende na esengo enene o motema. Bakabwani na Tobia na maloba maye : « Mwana wa ngai okende nzoto kolongonu, osala mobembo malamu. Mokonzi wa likolo akamba bino o nzela, yo na mwasi wa yo Sara, mpe namono bana ba bino liboso ’te nakufa. » | |
Tobi | LinVB | 10:12 | Alobi na mwana wa ye Sara : « Kende epai ya bakilo ba yo, mpo sikawa bakomi baboti ba yo se lokola biso. Kende na boboto, mwana wa ngai, nayoka bobele makambo malamu mpo ya yo, mikolo minso mya bomoi bwa ngai ! » Apesi bango mbote ya bokabwani mpe atiki bango bakende. | |
Tobi | LinVB | 10:13 | Na nsima Edna mpe alobi na Tobia : « Mwana mpe ndeko wa bolingo, Mokonzi azongisa yo o mboka, mpe naumela naino mwa mikolo nakoka komono bana ba yo mpe ba mwana wa ngai Sara liboso ’te nakufa ! O miso ma Mokonzi napesi yo mwana wa ngai mpo obatela ye. Oyokisa ye motema mpasi mokolo moko te. Mwana wa ngai, kende na boboto ! Banda lelo nakomi mama wa yo, mpe Sara akomi ndeko wa yo. Biso banso toyoka esengo mikolo minso mya bomoi bwa biso ! » Na nsima ayambi bango babale o maboko, mpe atiki bango bakende na esengo enene o motema. | |