Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
TOBIT
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14
Prev Up Next
Chapter 8
Tobi LinVB 8:1  Esilisi bango kolia mpe komele, bakei kolala. Bakambi elenge mo­bali o ndako ya kolala.
Tobi LinVB 8:2  Tobia akundoli malako ma Rafael, afungoli libenga lya ye mpe akamati libale na motema mwa mbisi mpe atii yango o makala mazali o mbeki ya malasi.
Tobi LinVB 8:3  Nsolo ya mbisi ebengani zabolo mosika ; akimi na mompepe mwa milinga kin’o Ezipeti. Rafael alandi ye kuna, azwi ye mpe akangi ye na nsi­nga seko. Mokolo mwa libala
Tobi LinVB 8:4  Baboti babimi mpe bakangi ndako nsima ya bango. Tobia alongwi o mbeto, alobi na Sara : « Teleme, ndeko, tosambela biso babale, tosenge lisalisi lya Nzambe, apesa biso bolamu mpe abatela biso. »
Tobi LinVB 8:5  Sara atelemi mpe bango babale babandi kosambela Nza­mbe mpo ’te abatela bango. Tobia alobi boye : « Bakumisa yo Nzambe wa bankoko, bakumisa nkombo ya yo o bileko na bileko ! Bikelamo binso o likolo mpe o nse bikumisa yo na lobiko.
Tobi LinVB 8:6  Yo moto okelaki Adamu, okelaki mpe mwasi wa ye Eva, mpo ’te azala mosalisi mpe mobateli wa ye. Bazali bankoko ba libota linene lya bato. Yo mpenza olobaki : « Ebongi te ’te mobali atikala ye moko, malamu topesa ye mosalisi oyo akokani na ye. »
Tobi LinVB 8:7  Awa nakamati ndeko wa ngai, naweli bisengo te, kasi nabali ye na motema moko. Oyokela biso babale mawa, obatela biso tokoma babange. »
Tobi LinVB 8:8  Mpe basilisi losambo monoko moko, balobi : « Amen, amen ! »
Tobi LinVB 8:9  Na nsima bakei kolala. Nzokande Raguel atelemi mpe abe­ngi basali ba ye. Bakei kotimola libulu bo lilita,
Tobi LinVB 8:10  mpo akanisi : « Malamu akufa te, soki te bato banso bakoseke mpe bakofinga biso. »
Tobi LinVB 8:11  Esilisi bango kotimola libulu, Raguel azo­ngi o ndako mpe abengi mwasi wa ye.
Tobi LinVB 8:12  Alobi na ye : « Tinda mosaleli mwasi moko o ndako ya bango ya kolala, atala soko Tobia azali naino na bomoi. Soko akufi, tokoki koku­nda ye, mpe moto moko akoyeba te. »
Tobi LinVB 8:13  Bayebisi mosaleli mwasi, bapelisi mwinda mpe bafungoli ndako ; mosaleli mwasi akoti mpe akuti bango babale bazalaki kolala mpongi ;
Tobi LinVB 8:14  abimi mpe ayebisi bango : « Azali naino, ma­nso mazali se malamu. »
Tobi LinVB 8:15  Bongo batondi Nzambe, balobi : « Bakumisa yo, e Nzambe, na bokumisi bonene ! Bakumisa yo o bileko binso seko !
Tobi LinVB 8:16  Bakumisa yo mpo otondisi motema mwa ngai na esengo, mpo maye nabangaki masalemi te, kasi na ngolu ya yo enene, oyokeli biso mawa.
Tobi LinVB 8:17  Bakumisa yo, mpo oyokeli bana baye mawa. Lakisa bango ngolu ya yo, e Mokonzi, mpe bikisa bango ; bomoi bwa bango bazala na esengo mpe na boboto. »
Tobi LinVB 8:18  Mpe Raguel atindi basali ba ye bazipa libulu liboso ’te ntongo etana.
Tobi LinVB 8:19  Atindi mwasi wa ye alamba ma­mpa mingi. Na nsima akei o etonga, akamati ngombe babali ibale na mpata babali inei, mpe atindi basali baboma yango. Bongo babandi kolengele limpati.
Tobi LinVB 8:20  Abengi Tobia mpe alobi na ye : « Mikolo zomi na minei okolongwa awa te. Otikala bobele o esika ozali, okolia mpe okomele o ndako ya ngai. Yokisa mwana wa ngai lisusu esengo o motema, mpo makambo makwelaki ye mayokisi ye mpasi mingi o motema.
Tobi LinVB 8:21  Nakaboli biloko bya ngai binso na ndambo ibale ; kamata ndambo yoko, eye okomeme epai ya tata wa yo, bongo omitungisa na likambo lyoko te. Bakopesa yo ndambo esusu mokolo biso na mwasi wa ngai tokokufa. Lendisa motema, mwana wa ngai : ngai nazali tata wa yo, mpe Edna azali mama wa yo. Tokomi baboti ba yo, banda lelo lokola tozali baboti ba ndeko wa yo. Lendisa motema, mwana ! »