Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I PETER
1 2 3 4 5
Prev Up Next
Chapter 3
I Pe LinVB 3:1  Sé bôngó bínó bamamá : botosa babáli ba bínó. Bôngó sókó batatá basúsu babóyí koyamba Liloba lya Nzámbe, bákóma koyamba mpô ya maloba té, kasi mpô ya ezalela elámu ya básí ba bangó,
I Pe LinVB 3:2  na bomóni ’te bozalí na bopéto mpé na limemyá.
I Pe LinVB 3:3  Bómíbongisa té na bilóko bikomónonoko na míso : ézala na bokangi nsúki kitóko, na bikémbiseli bya wólo tŏ na bilambá bya lipombó.
I Pe LinVB 3:4  Bonzéngá bwa bínó bózala o káti ya mitéma ; bonzéngá boye bokosílaka té : motéma bobóto mpé kímíá. Yangó ndé bonzéngá bwa sôló o míso ma Nzá­mbe.
I Pe LinVB 3:5  Tálá ndéngé básí basántu ba kala bazalákí komíbongisa ; bazalákí kotía mitéma na Nzámbe mpé kotósa babáli ba bangó.
I Pe LinVB 3:6  Lokóla Sára, óyo azalákí kotósa Abaráma mpé kobé­nga yě mokonzi wa yě. Bokolakisa ’te bozalí bána ba yě, sókó bosálí malámu mpé sókó elóko yŏ kó té ekokí kobángisa bínó.
I Pe LinVB 3:7  Bínó batatá sé bôngó : bófánda malámu na básí ba bínó ; bóyéba ’te balekí bínó na botaú ; bópésa bangó lokúmu lokokí na bangó, zambí bangó mpé bakozwa ngrásya eye ekopésaka bomoi. Sókó bosálí bôngó, losámbo la bínó lokotúta libakú lyŏ kó té.
I Pe LinVB 3:8  Bínó bánso bózala motéma mŏ­kó, bóyókana, bólingana lokóla bandeko, bózala motéma ngolu mpé bosáwa.
I Pe LinVB 3:9  Moto asálí bínó mabé, bó­zóngisela yě mabé té. Moto afíngí bínó, bózó­ngisela yě liloba té, kasi bóbenisa yě : Nzámbe aponí bínó bósála bôngó mpô ’te bózwa bobenisi bwa yě,
I Pe LinVB 3:10  mpô : Moto alingí kosepela mpé koyóka esengo o bomoi bwa yě, ákéngele lolému la yě mpô ’te áloba makambo mabé té, mpé ábúka lokutá té.
I Pe LinVB 3:11  Akíma makambo mabé, ásála sé malámu, áluka bobóto mpé ála­nda nzelá ya bobóto.
I Pe LinVB 3:12  Zambí Mokonzi akotálaka bato ba bosémbo, akoyókaka losámbo la bangó. Kasi abóyí baye bakosálaka mabé.
I Pe LinVB 3:13  Naní akosála bínó mabé sókó bozalí kotía moléndé mpô ya kosála malámu ?
I Pe LinVB 3:14  Atâ bosengélí koyóka mpási mpô ya bosémbo, bokozala na esengo. Bóbánga bato sókí té, bózala mitéma likoló té.
I Pe LinVB 3:15  Kasi bókúmisa Mokonzi Krístu o mitéma mya bínó. Baye batúní bínó ntína ya elíkyá ya bínó, bóbánga té kopésa bangó eyano polélé.
I Pe LinVB 3:16  Kasi bóyanola bangó na bobóto mpé na limemyá. Bózala na motéma sé­mba, mpô ’te baye bakotóngoko ezalela elámu ya bínó bakrístu, báyóka nsóni na maloba ma bangó.
I Pe LinVB 3:17  Koyóka mpási mpô ya malámu bosálí, sókó Nzámbe alingí bôngó, elekí malámu ; mabé ndé sókó bapésí bínó etúmbu té, atâ bosálí mabé.
I Pe LinVB 3:18  Mpô ya masúmu Krístu awákí mbala yŏ kó sékô ; yě moto wa bosémbo awákí mpô ya bato bazángí bosémbo, mpô ’te ákamba bísó o mbóka Nzámbe. Babomákí nzóto ya yě, kasi azwí bomoi lisúsu na ngúyá ya Elímo Sántu.
I Pe LinVB 3:19  Bobélé bô­ngó akendékí kotéya milímo mya bato bakangémí o mbóka ya bawá.
I Pe LinVB 3:20  Kala bangó babóyákí kotósa, kasi Nzámbe aka­ngákí motéma mpé azalákí kozila bangó. Ezalákí o eleko Nówe asálákí ebei enéne : bobélé bato mwambi babíkákí na yangó o mái.
I Pe LinVB 3:21  Mái mâná mazalí lokóla elembo ya batísimo ebíkísí bínó sikáwa ; batísimo eko­lo­ngolaka mbindo ya nzóto té, kasi bato bakokúla batísimo mpô ’te básálela Nzámbe na motéma molámu, mpô ya nsékwa ya Yézu Krístu.
I Pe LinVB 3:22  Yě abutí o likoló mpé afándí o lobóko la mobáli la Nzámbe ; kúná bǎ­nzelú, bilímo bya ngúyá mpé bya bokonzi bakotósa yě.